Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Desɛmbɛ: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe Biblia Traduction du monde nouveau. Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1986 soki ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na buku L’humanité à la recherche de Dieu bakoki mpe kolakisa yango. Febwali: La vie: Comment est-elle apparue? Évolution ou création?; Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi! to buku nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá. Marsi: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato.
◼ Kobanda na pɔsɔ ya 5 Febwali 2001, masangá oyo ezali na buku Créateur te na minɔkɔ oyo basalelaka makita, bakobanda koyekola buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Bakolanda programɛ oyo ezali na lokasa 2 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo.
◼ Masangá esengeli kobanda kosɛnga relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! mpo na mobu 2000 na komande na bango ya mikanda ya Desɛmbɛ. Relye ekozala na Lingelesi mpe na Lifalanse. Komande na yango ekobombama kino ntango relye yango ekokóma mpe ekotindama na masangá. Relye ekotindama na komande ya sipesiale.
◼ Nkasa ya libyangi na Ekaniseli mpo na mobu 2001 ekotindama na lokota oyo lisangá mokomoko esalelaka na makita na yango. Ekobimisama na Kiluba, Lifalanse, Lingala, Lingelesi, Monokutuba, Otetela, Swahili, Tshiluba.
◼ Lamuká! ya 8 Yanuali 2001 (na Lifalanse) ekozala na lisolo moko oyo ezali na motó ya likambo “Peut-on sauver son mariage?” (Okoki kobatela libala na yo?) Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela lisangá mokomoko motango ya bazulunalo koleka ndenge bazwaka liboso (20 %).
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Swahili: Le chemin du Paradis: Comment le trouver? (mpo na Bamizilma)
◼ Mikanda oyo tozali na yango:
Kikongo: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe?; Boyoka Moteyi Monene; La paix et la sécurité véritable: comment est-ce possible?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!
Lomongo: Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika (T-15); Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo bakufá? (T-16).
Zande: Bomoi ya esengo kati na mokili ya sika (T-15); Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko; Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo bakufá? (T-16); Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia; Nini ekomelaka biso soki tokufi?; Mpo na nini kondimela Biblia (T-13).