Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/00 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 11/00 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Novɛmbɛ: Tokolanda kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36. Masangá oyo basilisi kokabola Nsango ya Bokonzi yango na teritware na bango, bakoki kolakisa mwa buku Azali kosɛnga to buku Boyebi. Soki bato bazali na mikanda yango, tokoki ata kolakisa buku Bomoi ya seko to buku Création. Desɛmbɛ: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe Traduction du monde nouveau. Yanuali: Buku nyonso ya kala ya nkasa 192 oyo ebimaki na mobu 1986 to liboso na yango soki ezali na lisangá. Masangá oyo ezali na buku L’humanité à la recherche de Dieu bakoki mpe kolakisa yango. Febwali: Buku La vie: Comment est-elle apparue? Évolution ou création?; Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!; to buku nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na lisangá.

◼ Nsima ya kosilisa kampanye, masangá oyo bakotikala na nkasa ya Nsango ya Bokonzi No. 36 bakoki kolendisa basakoli ete bákabola yango ndenge bakabolaka batrakte​—ata na ndako na ndako to na esika mosusu. Tokosala makasi mpo na kokabola nkasa nyonso oyo etikali, mpamba te ezali na nsango ya ntina.

◼ Masangá oyo ezwaki Nsango ya Bokonzi No. 36 nsima ya dati oyo epesami basengeli kobanda mbala moko kokabola yango kino ntango ekosila.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to moto mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Desɛmbɛ to mwa moke na nsima. Nsima ya kotalela kɔnti, basengeli koyebisa yango na lisangá ntango bakotánga lapolo ya mbala ya nsima.

◼ Masangá esengeli kobanda kotinda komande na bango ya Annuaire des Témoins de Jéhovah 2001 na komande na bango ya mikanda mpo na Novɛmbɛ. Annuaire ekozala na Lingelesi mpe na Lifalanse. Komande na yango ekobombama kino ntango Annuaire ekokóma mpe ekotindama na masangá. Annuaire ezali kati na mikanda oyo esɛngamaka na komande ya sipesiale.

◼ Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 2000 (na Lifalanse) ekozala na lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Les problèmes des enfants: Enfin la solution!” (Etikali moke mikakatano oyo bana bazali kokutana na yango ekosila!) Masangá oyo ezwaka bazulunalo yango na Lifalanse bakobakisela bango motángo ya bazulunalo (30 %) koleka ndenge bazwaka.

◼ Mikanda oyo tozali na yango:

Lifalanse: Étude perspicace des Écritures.

Swahili: Ntango moto oyo olingaka akufi. . .

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse: Esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso; Okoki kozala moninga ya Nzambe.

Lingelesi: Esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso; Okoki kozala moninga ya Nzambe.

Swahili: Esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso.

◼ Bakasɛti video ya sika oyo tozali na yango:

Na Elobeli ya Bikela ya Amerika: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko (kasɛti 6; kasɛti No. 4 ekómi naino te); Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? (kasɛti 1).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto