Tyá likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe
1 Mikolo misato mobimba, tozalaki na esengo na liyangani ya etúká “Batosi ya Liloba ya Nzambe.” Tobosanaki mwa moke makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo mpe totyaki likebi mingi na misala ya kokamwa ya Yehova. Programɛ yango ebongisamaki mpo na kosalisa biso ete kondima na biso epai ya Nzambe mpe na Liloba na ye, ekóma makasi, elendisa boninga na biso elongo na ye, mpe esalisa biso tókóma lisusu na molende mpenza na mosala ya kosakola. Matomba nini tozali kozwa na makambo oyo bateyaki biso?—Yoa. 13:17.
2 Mabota bazali kotosa Liloba ya Nzambe: Masukulu-matongani oyo ezalaki na motó ya likambo “Tosá Liloba ya Nzambe,” esalisaki biso tótalela lisusu malamumalamu elimo ya mabota na biso. Bana balingaka koyekola. Na yango, balendisaki baboti báyekolaka Biblia na kati ya libota mpo na kotonga libota oyo ezali makasi na elimo. Ebele ya batata ya mabota bazali koyekola na bana na bango mwa buku Okoki kozala moninga ya Nzambe! Yango ekosalisa bango bázala na esengo ya kokolisa boyokani na bango na Yehova, boyokani yango ekobatela bango. Baboti, bóteya bana na bino báyeba kotalela makanisi ya Nzambe. Bómonisa ete bolingaka ye mpe bolingaka misala na ye. (Nz. 103:2) Bósala elongo mpo na komityela mikano ya elimo mpe koluka kokokisa yango mpe bómipesa mpenza na mosala ya Yehova.
3 Liloba ya Nzambe ezali kongɛngisa nzela na biso: Tozalaki na esengo ya kozwa mokanda ya sika Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na mokili mobimba volimi 1 (na Lifalanse). Okómi mosika na botángi na yo ya volimi yango ya liboso? Mokanda ya Yisaya esakolaki kosambisama ya mabota oyo bazali kobanga Nzambe te mpe esakolaki mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomemela basaleli na ye. (Yis. 34:2; 35:10) Ezali kolendisa kondima na biso mpe ezali kosalisa biso tótya motema na biso epai ya Yehova mpe tótya motema na ndenge azali kotambwisa makambo.—Yis. 12:2-5.
4 Ntango ozali kotánga Esakweli ya Yisaya volimi 1, okoki nokinoki komona ndenge Yisaya abatelaki bosembo na ye epai ya Yehova atako mabe ezalaki zingazinga na ye. Ntango Nzambe abengaki ye ete azala momemi nsango na ye, Yisaya azongisaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yis. 6:8) Soki ozali kokanisa elimo oyo amonisaki, ekolendisa yo okoba kosakola nsango malamu, osala mpenza na molende mosala ya komema “litatoli na mabota nyonso.”—Mat. 24:14.
5 Soki tozali kotya likebi na misala ya Yehova, yango ekopesa ye lokumu mpo na bonene na ye. Na yango, bósepela na libaku malamu ya kozala batosi ya liloba ya Nzambe!