Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kosalela mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie—Comment le découvrir?; mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous. Sɛtɛmbɛ: La vie comment est-elle apparue? Évolution ou création? Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Kobanda na bapɔsɔ ya nsuka ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, tokokabola Nsango ya Bokonzi No. 36, “Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?” Novɛmbɛ: Tokolanda kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36. Masangá oyo basilisi kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36 na ndako mokomoko oyo ezali na teritware na bango, bakoki kolakisa mwa buku Azali kosɛnga to buku Boyebi. Soki bato bazali na mikanda yango, bakoki ata kolakisa bango buku Okoki kozala na bomoi ya seko to buku Création.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona asengeli kotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Masangá basengeli kobanda uta sikoyo kosɛnga Annuaire 2001, Calendrier des Témoins de Jéhovah 2001, mpe mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2001 na komande na bango ya mikanda.
◼ Tozali kotindela lisangá mokomoko baformilɛrɛ oyo bakosalela na mobu ya mosala 2001. (Talá mokanda FSA 14 Marsi 2000.) Tosɛngi bino ete bósalela formilɛrɛ yango bobele mpo na mosala oyo etindami mpo na yango.
◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ezali ndenge moko na evantɛrɛ oyo esalemaka sanza na sanza na ndeko oyo atalelaka mikanda, mpe bosengeli kokoma motuya ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S(d)-18-F). Mpo bóyeba motuya ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko oyo bosalelaka mikanda esika moko. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ Stock des publications (S(d)-18-F). Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na Biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bosengeli kobomba kopi mosusu na dosye. Kopi ya misato, yango nde bokosalela lokola bruyɔ. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa mosala yango ya evantɛrɛ. Mokomeli mpe mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango.
◼ Mikanda oyo tozali na yango:
Lifalanse: Tyá likebi na esakweli ya Danyele!; volimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1999.