Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/00 nk. 5-6
  • Bozongeli na eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 8/00 nk. 5-6

Bozongeli na eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Bozongeli ekosalema wana babuku ekangami, na kotalela masolo maselamaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 1 Mai kino pɔsɔ ya 21 Augusto 2000.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai nyonso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. Eyano oyo Gideona apesaki bato ya Efelaima oyo balukaki koswanisa ye kozanga ntina, emonisaki ezaleli na ye ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa mpe yango esalaki ete bátika kokanisela ye mabe mpe bázala na kimya. (Bas. 8:1-3) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ]

2. Atako Manoa alobaki ete “tosili komona Nzambe,” mpo na koloba solo ye na mwasi na ye bamonaki nde molobeli ya Nzambe oyo alataki nzoto ya moto kasi bamonaki Yehova te. (Bas. 13:22) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/5 lok. 23 par. 3.]

3. Liloba “baninga na yo,” oyo ezali na Basambisi 5:31, ezali komonisa basangoli ya Bokonzi 144 000. [si-LI lok. 50 par. 28]

4. Ata eteni moko te ya mokanda ya Luta emonanaki kati na barulo oyo bazwaki na Mbu Ekufá. [si-LI lok. 51 par. 3]

5. Basambisi 21:25 ezali kolobela eleko oyo Yehova atikaki ete na libota ya Yisalaele moto na moto asala oyo alingi. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/6 lok. 22 par. 16.]

6. Bililingi ya bakeluba oyo ezalaki likoló ya sanduku ya kondimana ezalaki komonisa ete Yehova ye moko azali wana lokola mokonzi, lokola elobamaki mpo na ye ete “afandi likoló [to “katikati”] na bakeluba.” (1 Sam. 4:4, NW, maloba na nse ya lokasa) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w81-F 1/2 lok. 29 par. 2.]

7. Lokola basoda ya Saulo bazwaki etumbu te ntango balyaki makila wana bakómaki na mikakatano makasi, yango emonisi ete moto akoki kobuka mobeko ya Nzambe mpo na mwa ntango mpo na kobikisa bomoi na ye soki likambo moko ya ntina ezali. (1 Sam. 14:24-35) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w94 15/4 lok. 31 par. 7-9.]

8. Atako bato mosusu bakanisaka ete liloba “kondimisa” elakisi kokosa to mpe kosalela mayele mabe, kasi liloba yango ekoki kosalelama mpe na ndenge ya malamu mpo na komonisa likanisi ya kolongisa likambo moko, kobongola makanisi ya moto ntango ozali kosolola na ye malamumalamu. (2 Tim. 3:14, 15) [w98 15/5 lok. 21 par. 4]

9. ‘Libenga ya bomoi’ ezali kolobela bibongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na kobatela mpe kobikisa bato; Davidi akokaki kozwa litomba na yango soki aboyaki komema ngambo ya makila na miso ya Nzambe. (1 Sam. 25:29) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 15/6 lok. 14 par. 3.]

10. Kondimana ya Davidi mpo na Bokonzi, oyo elobelami na 2 Samwele 7:16, emonisaki polele nzela ya kokitana ya Mombóto oyo ememaki tii na Masiya mpe yango ezalaki ndanga ete moto moko na libota ya Davidi akoyangela “libela na libela.” [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-F 1/2 lok. 14 par. 21–lok. 15 par. 22.]

Yanolá na mituna milandi:

11. Nzembo 34:18 ezali kopesa elikya nini? [w98 1/4 lok. 31 par. 2]

12. Lokola bapesaki Yosefe nkombo Balanaba yango elakisaki nini? (Mis. 4:36, NW ) [w98 15/4 lok. 20 par. 3, maloba na nse ya lokasa]

13. Mpo na nini lisolo ya Biblia elobi ete Eli azalaki kokumisa bana na ye koleka Yehova? (1 Sam. 2:12, 22-24, 29) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w96 15/9 lok. 13 par. 14.]

14. Mpo na nini mokanda ya Luta esengeli kolendisa biso na kotya motema na Bokonzi oyo balaki biso? [si-LI lok. 53 par. 10]

15. Soki totali 1 Samwele 1:1-7, libota ya Samwele epesaki ndakisa nini? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 1/3 lok. 16 par. 12.]

16. Mpo na nini Biblia elobi ete ‘nguya ya bozwi ekosaka bato?’ (Mat. 13:22, NW ) [w98 15/5 lok. 5 par. 1]

17. Atako azalaki mokóló, ndenge nini Yonatana andimaki Davidi, mopakolami ya Yehova, mpe yango ezali elilingi ya nini lelo oyo? (1 Sam. 18:1, 3, 4) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-F 1/1 nk. 24, 26 par. 4, 13.]

18. Atako azalaki “malamu bɛ mpe na sembo,” ndenge nini mokanda ya Yobo emonisi ete Yobo azalaki moto ya kozanga kokoka? (Yobo 1:8) [w98 1/5 lok. 31 par. 1]

19. Maloba “kosala makasi” esɛngi nini? (Luka 13:24, NW ) [w98 15/6 lok. 31 par. 1, 4]

20. Liteya nini tokoki kozwa na 2 Samwele 12:26-28 ntango tozali kosala elongo na bato mosusu? [Botángi ya Biblia; talá w93 1/12 lok. 19 par. 19.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. Lokola Yehova aboyaki mpenza losambo ya Baala, yango esengeli kotinda biso na koboya makambo oyo ekokani na losambo yango na mikolo na biso lokola: _________________________ mpe _________________________. [si-LI lok. 50 par. 26]

22. Ezalaki na mikolo ya Samwele nde eleko ya _________________________ esukaki mpe eleko ya _________________________ ebandaki, eleko oyo, nsukansuka, Yisalaele esengelaki kokabwana na Yehova. [si-LI lok. 53 par. 1]

23. Nkombo ya Nzambe, Yehova, elimboli “_________________________” mpe elimboli ete Yehova akoki kosala makambo nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa _________________________ na ye. [w98 1/5 lok. 5 par. 3]

24. Eli mpe Saulo balongaki te kokokisa mikumba na bango mpamba te Eli amonisaki _________________________ na makambo mpe Saulo _________________________ [si-LI lok. 57 par. 27]

25. Lisese oyo Yesu apesaki ya Mosamalia malamu, emonisi ete moto oyo azali mpenza sembo ezali te bobele oyo atosaka _________________________ ya Nzambe kasi lisusu oyo amekolaka _________________________ na ye. (Luka 10:29-37) [w98 1/7 lok. 31 par. 2]

Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:

26. Bonene ya (mayele; nguya; bolingo) ya Yehova emonani na lolenge aponaki (Luta; Naomi; Olopa) mwasi oyo azalaki moto na Moaba, oyo azalaki kala mosambeli ya (Baala; Kemose; Dagona), oyo abongwanaki mpo na kokɔta na losambo ya solo mpe akómaki nkɔkɔ ya Yesu Klisto. (Mat. 1:3, 5, 16) [si-LI lok. 51 par. 1]

27. Eleko oyo Yisalaele eyangelamaki na basambisi esukaki ntango (Samwele; Davidi; Saulo) apakolamaki lokola mokonzi mpe mwa moke na nsima abundisaki (Baamona; Bamoaba; Bafilistia) na lisungi ya Yehova. (1 Sam. 11:6, 11) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/12 lok. 9 par. 2–lok. 10 par. 1.]

28. Ezalaki (ntoma Paulo; tata na ye; mama na ye na nkɔkɔ na ye) nde babɔkɔlaki Timote kati na “makomi ya bulɛɛ” mpo akóma misionɛrɛ mpe mokɛngɛli malamu. (2 Tim. 3:14, 15; Filp. 2:19-22) [w98 15/5 lok. 8 par. 3–lok. 9 par. 5]

29. Lolenge oyo (Davidi; Samwele; Yonatana) abandaki mosala ya Nzambe naino azali mpenza mwana esengeli kolendisa bilenge lelo oyo ete bámipesa na mosala ya kosakola, mpe lolenge oyo asalaki mosala yango bomoi na ye mobimba mpe atikaki te, esengeli mpe kolendisa baoyo basili kokóma mibange. [si-LI lok. 58 par. 30]

30. Mokanda ya 2 Samwele ekomamaki kobanda mobu (1077 kino soko mobu 1040; 1077 kino soko mobu 1037; 1070 kino soko mobu 1040) L.T.B. [si-LI lok. 59 par. 3]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Bas. 11:30, 31; 1 Sam. 15:22; 30:24, 25; 2 Mik. 6:15-17; Yak. 5:11

31. Yehova amonisi ete akosalela mampinga na ye ya likoló mpo na kobatela basaleli na ye engebene mokano na ye. [w98 15/4 lok. 29 par. 5]

32. Bakɛngɛli na lisangá basengeli kokokisa makambo oyo bandimaki kosala ata soki ezali mpasi mpo na kokokisa yango mpe ata soki ekosɛnga bango ntango mingi. [w99 15/9 lok. 10 par. 3-4]

33. Soki tokozala sembo ata soki minyoko ezali, Yehova Nzambe akopesa biso mbano monene. [w98 1/5 lok. 31 par. 4]

34. Bolingo ya solo mpo na Nzambe esɛngi kotosa mibeko na ye mpe esuki kaka te na kotumbela ye mbeka. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w96 15/6 lok. 5 par. 1.]

35. Yehova asepelaka mingi na bato oyo bazali kopesa ebongiseli na ye mabɔkɔ lelo oyo. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 1/9 lok. 28 par. 4.]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto