Bozongeli na eteyelo ya mosala ya teokrasi
Bozongeli ekosalema wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 3 Yanuali kino pɔsɔ ya 17 Aprili 2000.
[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai nyonso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]
Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:
1. Na bantango mosusu tosengeli kozela mpo na kozwa mapamboli ya Yehova, mpamba te Yehova ayebi ezalela na biso mpe akokokisa mposa nyonso na ntango oyo ekomemela biso litomba koleka. (Nz. 145:16; Yak. 1:17) [w98 1/1 lok. 23 par. 6]
2. Atako sanduku ya kondimana ezalaki na Yisalaele, yango ezalaki ndanga te ete Bayisalaele bakozala kaka malamu. Yehova azalaki kopambola bato yango oyo bazalaki na sanduku ya kondimana bobele soki bakokisi malamu makambo ya elimo mpe soki bazali kotosa. (Yos. mok. 7) [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá it-1-F lok. 160 par. 3.]
3. Lelo oyo tozali kolya na elimo bobele na kotángáká maloba ya Yehova. (Det. 8:3) [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w85-F 15/6 lok. 17 par. 15, 17.]
4. Mobeko ya Mose ndenge ezali na Deteronome 23:20, emonisi ete soki moklisto adefisi moto mbongo mpe asɛngi ye azongisela ye na mbongo mosusu likolo, yango ezali kozanga bolingo. [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá it-1-F lok. 1200 par. 7-8; it-2-F lok. 653 par. 8; w86-F 15/10 lok. 12 par. 9.]
5. Yosua na Kalebe bapesaki lapolo oyo emonisaki ete bazalaki kobanga te mpo bandimaki mpenza ete Bayisalaele bazali makasi mpe bazali na ekateli ete bakolonga bato nyonso oyo bakopekisa bango kozwa Mokili ya Ndaka. (Mit. 13:30) [w98 1/2 lok. 5 par. 4]
6. Ntango alobelaki “likabo” na 1 Timote, Paulo azalaki kokundwela Timote ete apakolami na elimo santu mpe mbano ya kokende na likoló ezalaki kozela ye. (1 Tim. 4:14) [w98 15/2 lok. 25 par. 1]
7. Mokanda ya Yosua elobeli nkombo moko te na molɔngɔ ya bato oyo ezali komema tii na Momboto ya Bokonzi. [si-LI lok. 46 par. 24]
8. Mokanda ya Basambisi ezali kolobela lisolo ya mibali oyo Bayisalaele baponaki mpo báyangela ekólo ntango bakonzi bazalaki naino te. [si-LI lok. 46 par. 2]
9. Likambo Gideona asɛngaki, ndenge yango elobelami na Basambisi 6:37-39, emonisi ete azalaki mpenza na angɛlɛ koleka ndelo mpe atyelaki Nzambe motema te. [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 1/4 lok. 30 par. 6.]
10. Ntango ayebisaki bayekoli na ye ete ‘bópesa moto mbote na nzela te,’ Yesu azalaki kobenda likebi na kosala mosala ya kosakola nokinoki mpe kotya likebi mingi na mosala yango ya ntina mingi. (Luka 10:4, NW ) [w98 1/3 lok. 30 par. 5]
Yanolá na mituna oyo milandi:
11. Mpo na nini ezali na ntina ete Liloba ya Yehova ezala na kati ya mitema ya baboti? (Det. 6:5, 6) [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 1/6 lok. 20 par. 4.]
12. Ndenge nini tata ya libota akoki kokokisa etinda oyo ezali na Deteronome 11:18, 19? [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá fy lok. 70 par. 14.]
13. Elembeteli nini ya Makomami ezali komonisa ete Onesimo, moombo oyo akimaki, alekisaki mwa ntango mingi elongo na ntoma Paulo liboso ete Paulo akomela Filemona mokanda? [w98 15/1 lok. 30 par. 3]
14. Soki tomoni ete makambo mosusu ezali kosalema na ndenge ya bosembo te to soki basaleli biso makambo mosusu oyo tomoni ete ezali sembo te, tokosala nini mpo tólɛmba nzoto te to tókolisa te ezaleli ya komona ete eloko ya malamu ekosalema te? [w98 1/2 lok. 6 par. 2-3]
15. Ndenge nini Yosua na Gideona bamonisaki limemya monene mpo na mobeko ya Nzambe? (Det. 20:8, 15-18) [si-LI lok. 41 par. 32]
16. Ndenge nini makambo oyo ekomami na Yosua 10:10-14 ekokani na makambo oyo tozali kozela esalema na Armagedon? [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/12 lok. 23 par. 12–lok. 24 par. 14.]
17. Tángá makambo misato ya malamu oyo moto akoki kozwa soki bakumisi ye na bosembo mpenza mpo na etamboli na ye malamu. (Kokanisá na Masese 15:23.) [w98 1/2 lok. 31 par. 5-6]
18. Na boyokani na Yosua 20:4, ndenge nini moto akoki kokima na mboka ya kobombama ya solo? [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/12 lok. 24 par. 16.]
19. Ndenge nini mokanda ya Basambisi 5:31 emonisi ete kolonga oyo Mosambisi Balaka alongaki basoda makasi ya Sisela na lobwaku ya Kisoni ezali na ndimbola monene mpo na mikolo na biso? [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/2 lok. 21 par. 4.]
20. Ndenge nini tokoki kotosa etinda oyo emonisami na maloba: “batɛlɛmaki moto na moto na esika na ye,” ndenge ezali na Basambisi 7:21? [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w82-F 1/9 lok. 25 par. 17.]
Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:
21. Mpo na kozwa mapamboli ya Yehova mingi koleka, tosengeli kolanda __________________________ mpe kosɛnga Yehova ete asalisa biso __________________________ mateya ya Liloba na ye lipemami. (1 Tim. 4:8, 9) [w98 1/1 lok. 24 par. 6]
22. Maloba ya kolɛtɛ esepelisaka Yehova te mpamba te yango eutaka na __________________________, ezali __________________________ te ezali mpe __________________________ te, mpe likoló na nyonso, ezali __________________________. [w98 1/2 lok. 30 par. 2-3]
23. Nkombo Yosua elimboli __________________________, mpe azalaki esakweli ya __________________________. [si-LI lok. 42 par. 5]
24. Na boyokani na lisese ya Yesu oyo ezali na Matai 7:24-27, baboti ya mayele bakoki kosalisa bana na bango bálonga bopusi oyo ekokani na mipɛpɛ makasi na kopesáká bango __________________________ oyo ekosalisa bango ete bátikala __________________________. [w98 15/2 lok. 9 par. 1]
25. Makambo oyo ekomami kati na mokanda ya Basambisi emonisi makambo oyo esalemaki kobanda na liwa ya __________________________ kino eleko ya __________________________, na boumeli ya bambula soko __________________________. [si-LI lok. 47 par. 5]
Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:
26. Kozwa bibongiseli na ntina na kokabola biloko ya moto soki akufi, ezali likambo etali (lisangá; moto ye moko; lisɛngami mpo na baklisto ya solo). (Gal. 6:5) [w98 15/1 lok. 19 par. 6]
27. Paulo alendisaki Filemona ete ayamba (Oname; Onesifolo; Onesimo) na boboto kasi asalelaki te bokonzi na ye ya ntoma mpo na kosɛngisa ye na makasi to kopesa moombo na ye bonsomi. (Flmo. 21) [w98 15/1 lok. 31 par. 1]
28. Libunga monene oyo bato ya maba oyo Yesu abikisaki basalaki ezalaki ete (bazangaki kondima; bazangaki botosi; bazongisaki matɔndi te). (Luka 17:11-19) [w98 15/2 lok. 5 par. 1]
29. Lokola Nzambe andimaki mwango na ye, maloba oyo Laaba alobaki na bato ya Yeliko oyo bazalaki kolanda banɔ́ngi oyo bautaki na Yisalaele emonisi ete (ata soki moto akosi, yango ezali ekateli na ye moko; moto asɛngisami te koloba makambo nyonso ya solo epai na bato oyo bazali na ndingisa te ya koyeba yango; atikaki naino te bizaleli na ye nyonso ya mokili). (Yos. 2:3-5; kokanisá na Baloma 14:4.) [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 15/12 lok. 25 par. 1.]
30. Ndenge yango emonisami na Yoane 13:5, liteya oyo Yesu apesaki emonisaki ezaleli ya (boboto; motema mawa; komikitisa), oyo epusaka moto ete asala misala oyo esɛngaka komikitisa mingi mpo na bolamu ya bato mosusu. [w98 15/3 lok. 7 par. 6]
Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:
Det. 7:3, 4; 17:7; 25:11, 12; 28:3; Yil. 15:20
31. Lokola Mozalisi atalelaka biboteli ete ezali na ntina mingi, esengeli kopusa baklisto bápona mwango malamu ya kokanga kobota. [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w99 15/6 lok. 28 par. 1-4.]
32. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso lokola tozali kokokisa mosala na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. [w98 1/3 lok. 28 par. 1]
33. Soki tokotya likebi na toli ya Biblia na makambo ya mpasi oyo ebimaka mbala mingi ntango moklisto abalani na moto oyo azali mondimi te, ekozwa biso te. [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89 1/11 lok. 20 par. 11.]
34. Mapamboli ya Yehova etaleli te esika oyo tofandi to mokumba oyo tozali na yango na mosala ya Nzambe. [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w96 15/6 lok. 15 par. 15.]
35. Mpo na kosimba malako na ye oyo mazwami na 1 Bakolinti mokapo ya 5 na ntina na kobimisa mosali na mabe na lisangá, Paulo atángi mobeko ya Yehova. [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá si-LI lok. 213 par. 24.]