Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/00 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 3/00 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Ntango mosusu tokoki kosalela trakte mpo na komona soki moto oyo tozali kosolola na ye asepeli mpenza mpo tóbanda koyekola na ye Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokozala na mwa buku Azali kosɛnga mpo na bato oyo bakosepela, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Yuni: Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato.

◼ Basakoli oyo balingi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili mpe ya Mai basengeli komibongisa banda sikoyo mpe kotondisa noki lokasa ya lisɛngi. Yango ekopesa nzela na bankulutu ete bázwa bibongiseli ya ntina mpo na mosala ya kosakola mpe básɛnga bazulunalo mpe mikanda mingi. Nkombo ya baoyo nyonso bandimami lokola babongisi-nzela basungi ekoyebisama na lisangá sanza na sanza.

◼ Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali na programɛ mobimba ya boyekoli ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Okoki kosala kopi ya programɛ yango mpe kobomba yango na kati ya buku na yo mpo na kolandáká yango.

◼ Masangá ya Monokutuba, Otetela mpe Tshiluba ekoyekola buku Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko na kolandáká programɛ oyo ekokani na programɛ ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!

Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Marsi to mwa moke nsima. Soki bataleli yango, bakoyebisa yango na lisangá nsima ya kopesa lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya misato, mwa 19 Aprili 2000. Soki na lisangá na bino bosalaka makita na mokolo ya misato, makita yango masengeli kosalema mokolo mosusu kati na pɔsɔ soki Ndako ya Bokonzi ekozala mpamba. Soki likoki ya kosala Likita na bino ya Mosala ezali te, mateya ya likita yango, oyo etaleli mpenza lisangá na bino makoki kosalelama na Likita mosusu ya Mosala.

◼ Bandeko ya lisangá basengeli kotinda abonema na bango nyonso na nzela ya lisangá. Soki mpe balingi kozongela abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, bakotinda yango bobele na nzela ya lisangá.

◼ La Société akondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli mokambi akozwa bibongiseli ete liyebisi epesama sanza na sanza liboso ete komande ya mikanda ya sanza ekoka kotindama na la Société. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko bákoka koyebisa na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda oyo bokoki kosala komande sipesiale.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse: Index des publications 1950-1985; Le chemin du Paradis: comment le trouver; Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe; Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2000.

Swahili: Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe.

◼ Bakasɛti ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse: Mindule ya Bokonzi (album ya kasɛti 8).

◼ Kasɛti video ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse: Jusqu’aux extrémités de la terre; La Bible: un livre ancien; La Bible: un récit exact; Les triangles violets.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto