Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/00 nk. 3-6
  • Tóndima mpenza nsango malamu oyo tozali kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóndima mpenza nsango malamu oyo tozali kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Komonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Baboti: Bósalisa bana na bino bákóma ‘bato ya bwanya mpo na lobiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Yebá ete mateya oyo ondimaka ezali solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 2/00 nk. 3-6

Tóndima mpenza nsango malamu oyo tozali kosakola

1 Na ekeke ya liboso, Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe “kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Mat. 24:14; 28:19, 20) Batatoli ya Yehova bazwi etinda na ye na lisɛki te, yango wana na nsuka ya ekeke ya 20, libota na biso ya boklisto ekómaki mpenza monene; bayekoli nyonso bazalaki koleka 5 900 000 kati na mikili 234. Yango ezalaki lokito makasi ya masanzoli epai ya Tata na biso ya likoló!

2 Tokɔti sikoyo na ekeke ya 21. Monguna na biso, azali koluka na mayele mabe nyonso kopekisa mosala na biso monene ya kosakola Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli. Azali kosalela mikakatano ya mokili oyo mpo na kolongola likebi na biso, kobebisa ntango na biso, mpe kosilisa makasi na biso na makambo ebele ebele oyo ezangi ntina mpe oyo tozali na mposa na yango te. Na esika ya kotika nzela na mokili oyo eponela biso likambo oyo ezali na ntina mpo na bomoi, biso moko tomoni na Liloba ya Nzambe eloko oyo eleki ntina na makambo nyonso​—kosala mokano ya Yehova. (Lom. 12:2) Yango ezali kosɛnga biso tótosa etinda ya Biblia oyo etali ‘kosakola liloba na bilaka malamu mpe na bilaka malamu te mpe ya kokokisa malamu mosala na biso.’​—2 Tim. 4:2, 5.

3 Tóndima mpenza makambo oyo tozali kosakola: Baklisto basengeli “kotɛlɛma ngwi mpe kondima mpenza mokano mobimba ya Nzambe.” (Kols. 4:12, NW) Maloba “kondima mpenza” elimbolami lokola “kondimisa to bindimeli; ezaleli ya kozanga ntembe.” Lokola tozali baklisto tosengeli kondima mpenza ete Liloba ya esakweli ya Nzambe ezali solo mpe bambula mingi eleki banda tokɔtaki na ntango ya nsuka. Tosengeli kozala na kondima makasi lokola ntoma Paulo, oyo alobaki ete nsango malamu “ezali nguya ya Nzambe mpo na kobikisa moto nyonso oyo azali na kondima.”​—Lom. 1:16, NW.

4 Zabolo azali kosalela bato mabe mpe bakosi, baoyo bapɛngwi nzela, mpo na kokosa mpe kopɛngwisa basusu. (2 Tim. 3:13) Lokola bakebisi biso na likambo yango, tozali kozwa bibongiseli mpo na kondima mpenzampenza ete tozali na solo. Na esika ya kotika ete mitungisi ya bomoi elɛmbisa molende na biso, tozali ntango nyonso kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33, 34) Tolingi mpe kobosana te ete oyo ezali ntango ya kosala na lombangu, to mpe kokanisa te ete nsuka ya mokili oyo ezali naino mosika. Ezali nde kobɛlɛma nokinoki. (1 Pet. 4:7) Atako tokoki komona ete kosakola nsango malamu ezali kobimisa matomba mingi te na mikili mosusu na kotalela litatoli oyo esili kopesama kuna, mosala ya kokebisa bato esengeli kolanda kosalema.​—Ezek. 33:7-9.

5 Na mikolo oyo ya nsuka tosengeli komituna mituna oyo ya ntina: ‘Nazali kotalela etinda oyo Yesu apesaki ya kozalisa bayekoli ete ezali mpenza likambo ya ntina? Ntango nasakolaka nsango malamu, nandimaka mpenza ete Bokonzi ezali likambo ya solo? Nazali na ekateli ya kosangana lisusu mingi, na kotalela makoki na ngai, na mosala oyo ya kobikisa bomoi ya bato?’ Lokola toyebi ete bambula mingi eleki banda tokɔtaki na mikolo ya nsuka, tosengeli kokeba mpo na biso moko mpe mpo na mokumba na biso ya kosakola mpe ya koteya. Soki tosali bongo tokomibikisa biso moko mpe baoyo bazali koyoka biso. (1 Tim. 4:16) Ndenge nini biso nyonso oyo tozali basakoli tokoki kolendisa kondima na biso?

6 Tólanda ndakisa ya Batesaloniki: Ntango akanisaki mosala makasi oyo bandeko ya Tesaloniki basalaki, ntoma Paulo alobaki na bango ete: “Nsango malamu na biso eyeli bino bobele na maloba te kasi na nguya mpe na elimo santu mpe na [kondima mpenza, NW]. Boyebi lolenge lozalaki na biso na ntina na bino. Mpe bino bosili kozala [bamekoli] na biso mpe na Nkolo mpo ete boyambi Liloba kati na bolɔzi mingi, na esengo oyo eyei na [elimo santu, NW].” (1 Tes. 1:5, 6) Ya solo, Paulo apesaki bandeko ya lisangá ya Tesaloniki longonya mpamba te atako bazalaki na kati ya minyoko mingi bazalaki kosakola na molende mpe na kondima mpenza. Nini esalisaki bango na kosala bongo? Mingimingi, ezali molende mpe kondima oyo bamonaki epai ya ntoma Paulo na baninga na ye ya mosala nde esimbaki mitema na bango. Ndenge nini?

7 Paulo na baninga na ye ya mobembo bamonisaki na bomoi na bango ete bazalaki na elimo ya Nzambe mpe bandimaki na motema moko makambo oyo bazalaki koteya. Liboso ya koya na Tesaloniki, Paulo na Sila banyokwamaki na Filipi. Kozanga ete básambisa bango, babɛtaki bango, batyaki bango na bolɔkɔ, mpe bakangisaki bango makolo na mabaya. Kasi, komekama oyo elɛmbisaki te molende na bango mpo na nsango malamu. Na lisalisi ya Nzambe babimaki na bolɔkɔ, mokɛngɛli ya bolɔkɔ na bato ya ndako na ye babongolaki motema, mpe nzela efungwamaki mpo bandeko oyo bákoba na mosala na bango ya kosakola.​—Mis. 16:19-34.

8 Na nguya ya elimo ya Nzambe, Paulo ayaki na Tesaloniki. Kuna asalaki mosala ya mabɔkɔ mpo na kobikela mpe amipesaki lisusu mingi na koteya solo epai ya Batesaloniki. Amipekisaki te na kosakola nsango malamu na mabaku nyonso. (1 Tes. 2:9) Nsango oyo Paulo azalaki kosakola na kondima mpenza esimbaki mitema ya Batesaloniki na boye ete batikaki losambo na bango ya bikeko mpe bakómaki basaleli ya Nzambe ya solo, Yehova.​—1 Tes. 1:8-10.

9 Komekama epekisaki te bandimi oyo ya sika na kosakola nsango malamu. Lingomba na bango ya sika mpe kondima mpenza oyo bazalaki na yango ete bakozwa mapamboli ya seko, etindaki Batesaloniki básakola solo oyo bayambaki na esengo mpenza. Lokola bandeko ya lisangá yango bakómaki na molende mingi, nsango ya kondima na bango mpe ya molende na bango epalanganaki na bisika mosusu ya Makedonia mpe ata kino na Akaya. Yango wana, ntango Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epai ya Batesaloniki, misala na bango malamu esilaki koyebana epai ya bato nyonso. (1 Tes. 1:7) Ezali mpenza ndakisa malamu, boye te?

10 Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bato ezali kotinda biso: Ndenge nini biso mpe, lokola Batesaloniki, tokoki kondima mpenza nsango malamu oyo tozali kosakola lelo oyo? Mpo na bango, ntoma Paulo akomaki boye: “Tozali ntango nyonso kokanisa mosala na bino ya sembo mpe mosala na bino makasi oyo bozali kosala na bolingo nyonso.” (1 Tes. 1:3, NW, maloba na nse ya lokasa) Emonani polele ete bazalaki na bolingo mingi mpe bamipesaki na motema mobimba epai ya Yehova Nzambe mpe epai na bato oyo bazalaki koteya. Ezalaki bolingo yango nde etindaki Paulo na baninga na ye bápesa Batesaloniki “bobele nsango malamu ya Nzambe te, kasi bomoi na [bango] mpenza.”​—1 Tes. 2:8.

11 Ndenge moko mpe, bolingo makasi mpo na Yehova mpe mpo na bazalani na biso ezali kotinda biso tósangana lisusu mingi koleka na mosala ya kosakola oyo Nzambe apesi biso. Bolingo motindo wana, ezali kosalisa mokomoko na biso ayeba ete kosakola nsango malamu ezali mokumba oyo Nzambe apesi ye. Lokola tozali kokanisa mpe kosepela na makambo nyonso oyo Yehova asali mpo na komema biso na “bomoi ya solosolo,” yango wana tozali koyebisa mpe bato mosusu makambo malamu yango ya solo oyo tozali kondima na motema na biso mobimba.​—1 Tim. 6:19, NW.

12 Soki tozali kosakola mingi, bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bato ekokola lisusu. Soki tolingi Yehova mpe bato, tokokolisa lisusu mosala na biso ya kosakola ezala ya ndako na ndako to lolenge mosusu nyonso ya kopesa litatoli. Tokopesa litatoli ya libaku malamu na bisika nyonso mpe ntango nyonso ezala epai ya bandeko na biso, epai ya bato tofandaka na bango esika moko to bato oyo toyebani na bango. Atako bato mingi bakoki koboya nsango malamu oyo tozali kosakola mpe basusu bazali kosala nyonso mpo na kopekisa kosakolama ya Bokonzi, tozali ntango nyonso na esengo na mitema na biso. Mpo na nini? Mpo toyebi ete tozali kosala oyo esengeli na biso kosala mpo na kopesa litatoli mpo na Bokonzi mpe kosalisa bato bázwa lobiko. Mpe Yehova akopambola milende na biso mpo tókutana na bato ya mitema sembo. Ata soki tokutani na mikakatano ya bomoi mpe ata soki Satana azali koluka kobebisa esengo na biso, tokoki kobatela ezaleli na biso ya kokangama makasi na makambo oyo tondimi mpe molende na biso ya kopesa bato mosusu litatoli. Soki biso nyonso tozali kokokisa mokumba na biso malamu, yango ekosala ete masangá na biso ezala makasi, ezala na molende lokola lisangá ya Tesaloniki.

13 Atako mikakatano ezali, tólɛmba te: Kokangama makasi na makambo oyo tondimi ezali mpe na ntina ntango tokutani na komekama ndenge na ndenge. (1 Pet. 1:6, 7) Yesu ayebisaki bayekoli na ye polele ete soki balandi ye, ‘bato ya mabota nyonso bakoyina bango.’ (Mat. 24:9, NW) Paulo na Sila bakutanaki na likambo yango ntango bazalaki na Filipi. Lisolo oyo ezali na Misala mokapo 16 elobi ete batyaki Paulo na Sila na bolɔkɔ ya katikati mpe bakangisaki bango makolo na mabaya. Mingimingi, bolɔkɔ ya monene ezalaki lokola esika ya kosamba makambo to mbalasani (salon) monene mpe pembenipembeni ezalaki na bakasho oyo ezalaki na mwinda mpe mopɛpɛ ezalaki kokɔta. Kasi, bolɔkɔ ya katikati, ezalaki na mwinda te mpe mopɛpɛ ezalaki kokɔta mingi te. Paulo na Sila basengelaki konyokwama na molili, molunge, mpe nsolo mabe oyo ezalaki kobima na esika wana ya nkaka. Kanisá naino mpasi oyo bayokaki na ndenge bakangisaki makolo na bango na mabaya na boumeli ya bangonga mingi mpe mikɔngɔ na bango etondaki na mpota mpe ezalaki kotangisa makila mpo na bafimbo oyo babɛtaki bango!

14 Atako bazwaki minyoko wana, Paulo na Sila batikalaki sembo. Kondima makasi oyo bazalaki na yango elendisaki bango mpo na kosalela Yehova ata komekama ezalaki. Vɛrsɛ 25 ya mokapo 16 emonisi ete bazalaki na kondima mpamba te elobi ete Paulo na Sila bazalaki “kobondela mpe koyembela Nzambe nzembo.” Atako bazalaki na bolɔkɔ ya katikati, bandimaki mpenza ete ngolu ya Nzambe ezalaki likoló na bango na boye ete bayembaki na mongongo makasi mpe bakangami mosusu bayokaki bango! Lelo oyo, tosengeli mpe kokangama makasi na makambo oyo tondimi ntango kondima na biso ekutani na komekama.

15 Zabolo azali kobimisela biso minyoko ya ndenge na ndenge. Mpo na basusu ekoki kozala ete bandeko na bango nde bazali konyokola bango. Bandeko na biso mingi bazali kokutana na mikakatano na Leta. Botɛmɛli ekoki mpe kouta na bapɛngwi. Kozanga mbongo mpe mitungisi mpo na kozwa biloko ya kobikela. Bilenge bazali komekama na makambo mabe ya baninga na bango na eteyelo. Ndenge nini tokoki kolonga komekama yango? Tokosala nini mpo na komonisa ete tokangami solo na makambo oyo tondimi?

16 Liboso ya makambo nyonso, tosengeli kobatela boyokani malamu na Yehova. Ntango Paulo na Sila bazalaki na bolɔkɔ ya katikati, babandaki komilelalela te mpo na makambo oyo eyelaki bango to bamiyokelaki mawa te. Kasi bamipesaki mbala moko epai ya Nzambe na libondeli mpe bakumisaki ye na nzembo. Mpo na nini? Mpamba te bazalaki na boyokani malamu na Tata na bango ya likoló. Bayebaki ete bazali konyokwama mpo na bosembo mpe bayebaki ete kaka Yehova nde akokaki kobikisa bango.​—Nz. 3:8.

17 Lelo oyo, ntango tozali kokutana na minyoko, biso mpe tosengeli komipesa na Yehova mpo na kozwa lisalisi. Paulo alendisi biso baklisto ete ‘tóyebisa Nzambe makambo oyo tozali na yango mposa mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na biso mpe makanisi na biso.’ (Filp. 4:6, 7, NW) Koyeba ete Yehova akotika biso moko te liboso ya minyoko ezali kobɔndisa biso solo! (Yis. 41:10) Azali ntango nyonso elongo na biso soki tozali kosalela ye na kondima mpenza.​—Nz. 46:7.

18 Eloko mosusu ya ntina oyo ekosalisa biso tómonisa kondima mpenza ezali komipesa mingi na mosala ya Yehova. (1 Kol. 15:58) Paulo na Sila batyamaki na bolɔkɔ mpamba te bamipesaki na kosakola nsango malamu. Minyoko epekisaki bango kosakola? Te, balandaki kosakola ata na kati ya bolɔkɔ, mpe ntango babimaki na bolɔkɔ, bakendaki na Tesaloniki mpe bakɔtaki na eyanganelo ya Bayuda mpo na ‘kosolola na bango na mozindo kati na Makomami.’ (Mis. 17:1-3, NW) Soki tondimi solosolo to soki tondimeli mpenza Yehova mpe tondimi ete tozali kati na solo, eloko moko te ‘ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali kati na Yesu Klisto Nkolo na biso.’​—Lom. 8:35-39.

19 Bandakisa ya bato oyo bazali komonisa kondima mpenza na mikolo na biso: Lokola Paulo na Sila, na mikolo na biso mpe, ezali na bato mingi oyo bamonisi ete bakangami mpenza na makambo oyo bandimi. Ndeko mwasi moko oyo abikaki na káa ya bakangami ya Auschwitz alobi ete, bandeko bamonisaki mpenza kondima ya solosolo mpe bakangamaki mpenza na makambo oyo bandimaki. Alobi ete: “Mokolo moko ntango bazalaki kotuna biso mituna, mokonzi moko ya basoda ayaki liboso na ngai mpe akangaki makofi. Alobaki ete: ‘Tokosala na bino nini? Soki tokangi bino, bozali komitungisa te. Soki totindi bino na bolɔkɔ, bozali kutu komitungisa ata moke te. Soki totindi bino na káa ya bakangami, ezali kopesa bino nsɔmɔ te. Soki tokateli bino etumbu ya liwa, botɛlɛmi kaka wana bozali ata komitungisa te. Tokosala na bino nini?’ ” Soki tokanisi ndenge bandeko na biso bamonisaki kondima na ntango wana ya mpasi, tozali mpe kolendisa kondima na biso! Bazalaki ntango nyonso kotalela Yehova asunga bango mpo báyika mpiko.

20 Na ntembe te tozali komikundola kondima oyo bandeko na biso mingi bamonisaki na bambula oyo eleki ntango koyinana ebimisaki bitumba na bikólo mosusu. Atako bango moko mpe bazalaki na likama, bandeko oyo bazalaki kokamba masangá bazalaki na mposa ya komona ete bandeko na bango bazali kolya malamu na elimo. Bango nyonso bazalaki sembo mpe bandimaki mpenza ete ‘ebundeli na ebundeli oyo esalemi mpo na kotɛmɛla bango ekolonga te.’​—Yis. 54:17.

21 Bandeko na biso mingi baoyo bazali na babalani oyo bazali bandimi te bazali mpe komonisa kondima makasi mpe mpiko. Ndeko mobali moko na mboka Guadeloupe akutanaki na botɛmɛli makasi ya mwasi na ye oyo azalaki mondimi te. Mpo na kolɛmbisa ye mpe kopekisa ye koyangana na makita ya lisangá, abandaki kolambela ye te, kosukola bilamba na ye te, kongoma yango te mpe kobongisa yango te. Na boumeli ya ntango molai azalaki lisusu kolobisa ye te. Kasi lokola ndeko yango azalaki kosalela Yehova na kondima mpenza, mpe azalaki kobondela Yehova asalisa ye, ayikaki mpiko liboso ya makambo wana nyonso. Likambo yango eumelaki mbula boni? Pene na mbula 20​—nsima na yango mwasi na ye abandaki kobongola motema mokemoke. Na nsuka, ndeko yango asepelaki mpamba te mwasi na ye andimaki elikya ya Bokonzi ya Nzambe.

22 Na nsuka, tosengeli kobosana te kondima oyo bilenge na biso bazali komonisa na eteyelo mokolo na mokolo mpe bazali koboya kolanda makambo mabe ya baninga na bango mpe yango ezali kobatela bango na mikakatano mosusu. Mpo na bopusi ya baninga na eteyelo, elenge mwasi moko Motatoli alobaki ete: “Ntango ozali na eteyelo, moto nyonso azali kolendisa yo ete ozala mwa motomboki. Bana mike bakotosa yo mingi soki ozali kosala makambo lokola motomboki.” Bilenge na biso bazali mpenza komekama na makambo mabe ya baninga na bango! Basengeli kozwa ekateli makasi ya kolonga komekama.

23 Ebele ya bilenge na biso bazali kosala malamu na ndenge bazali kobatela bosembo na bango liboso ya komekama. Tozali na ndakisa ya elenge mwasi moko na ekólo France. Mokolo moko nsima ya kolya na midi, bilenge mibali mosusu basɛngaki ye na makasi ete apesa bango bizi, kasi abondelaki Yehova mpe aboyaki na motema moko, na yango bilenge mibali yango bakendaki. Na nsima, moko na bilenge mibali yango azongaki mpe alobaki na ye ete asepelaki na mpiko na ye. Elenge mwasi yango azwaki likoki ya kopesa ye litatoli malamu mpo na Bokonzi, alimbolelaki ye mibeko oyo Yehova atii mpo ete baoyo nyonso balingi kozwa mapamboli na ye bátosa yango. Na boumeli ya mbula mobimba, alimbolaki bindimeli na ye epai ya baninga na ye nyonso ya kelasi.

24 Tozali na libaku malamu ya kotangama kati ya bato oyo Yehova azali kosalela mpo báyebisa mokano na ye na kondima mpenza! (Kols. 4:12) Lisusu, tozali na libaku malamu ya komonisa bosembo na biso ntango tomekami na Monguna na biso Satana Zabolo oyo azali lokola nkosi. (1 Pet. 5:8, 9) Tóbosana soko moke te ete Yehova azali kosalela nsango ya Bokonzi na ye mpo na kopesa lobiko epai na biso baoyo tozali koteya yango mpe epai ya baoyo bazali koyoka. Tiká ete bikateli na biso mpe bomoi na biso ya mokolo na mokolo emonisa ete tozali kotya Bokonzi na esika ya liboso. Tiká tólanda kosakola nsango malamu na kondima mpenza!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto