Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokozala mpe na mwa buku Azali kosɛnga mpo na bato oyo bakosepela, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bango Biblia.
◼ Banimero ya telefone ya Betele ebongwani. Bósimba yango malamu. Telefone OCPT: (12) 71863, (12) 71647, (12) 71439, (12) 71660; Télécel: 88 43213; Fax: 88 46944.
◼ Mokomeli ya lisangá na mokɛngɛli na mosala ya kosakola basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela ya sanza na sanza. Soki moko kati na bango azali na mokakatano ya kokokisa ngonga oyo esɛngami, bankulutu basengeli kozwa bibongiseli mpo ete azwa lisungi oyo esengeli. Talá nkoma ya la Société S-201 ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpo na kozwa makanisi. Talá mpe lisolo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1987, na lokasa 3.
◼ Lokola tokómi na ebongiseli ya sika ya kokabola mikanda, bankulutu na bandeko oyo baponami mpo na kokabolela bandeko mikanda yango basengeli kolanda malako ya sika mpo na ndenge ya kozwa mikanda oyo ebengami articles sur demande spéciale, na ndakisa Bibles de luxe, Étude perspicace des Écritures, Bible avec notes et références, volimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, bakasɛti mpe bakasɛti video, mpe bongo na bongo. Lisangá ekosala komande ya biloko oyo bobele soki moto asali komande na yango. Soki ezali na bandeko oyo kala bazalaki kosomba mikanda mingi te to bazalaki kokabola mikanda mingi te, kasi bakómi sikoyo kosɛnga bazulunalo mpe mikanda mingi, bandeko oyo batyami mpo na kokabola mikanda basengeli koyeba likambo yango. Basengeli kotalela likambo yango malamu mpenza. Mbala mosusu ekosengela kosolola na bandeko mosusu mpo na kokundwela bango ete ebongiseli oyo ya sika elimboli te ete tokobanda kokabola mikanda mpambampamba epai ya bato oyo bazali kosepela na solo te mpe baoyo bazali mpenza na mposa na yango te. Bandeko nyonso oyo batalelaka bazulunalo mpe mikanda basengeli kokeba malamumalamu mpo mikanda ebeba mpamba te.
◼ Bakomande ya bazulunalo ya masangá nyonso oyo ezalaki moke na kotalela motango ya basakoli ebongisami mpo na kopesa nzela ete moto nyonso azala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ye moko na makita. Yango ekosala ete moto nyonso amibongisa malamu liboso mpenza. Mposa ya La Société ezali ete moto nyonso alanda mateya na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ye moko. Motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli asengeli kokeba ete moto nyonso azala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ye moko.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Mwa buku Nzambe azali komibanzabanza mpenza mpo na biso?; Trakte Le plus grand des noms. (T-17)
Zande: Trakte Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa? (T-16)
◼ Bakasɛti video ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Les Témoins de Jéhovah: Un nom, une organisation.
◼ Bakasɛti ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Faisons la volonté de Dieu avec zèle.