Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Novɛmbɛ: Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Desɛmbɛ: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe Biblia Traduction du monde nouveau. Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1986 soki ezali na lisangá. Masangá oyo ezali na buku yango te ekoki kokabola babuku oyo elandi: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Febwali: Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
◼ Masangá esengeli kobanda kotinda komande na bango ya Annuaire des Témoins de Jéhovah 2000 na komande na bango ya mikanda mpo na Novɛmbɛ. Annuaire ekozala na Lifalanse lokola momeseno. Komande na yango ekobombama kino ntango Annuaire ekokóma mpe ekotindama na masangá. Annuaire ezali kati na mikanda oyo esɛngamaka na komande ya sipesiale.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Lingelesi: The Guidance of God—Our Way to Paradise.
Monokutuba: Osengeli kondima Trinité?
Otetela: Bokonzi oyo ekosala Paradis.
Tshiluba: Bokonzi oyo ekosala Paradis.
◼ Bakasɛti ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Jéhovah délivre ceux qui invoquent son nom; Le nom de Jéhovah doit être proclamé par toute la terre.
◼ Bakasɛti video oyo tozali na yango:
Lifalanse: La Bible: une force dans votre vie; La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie; La Société du Monde Nouveau en action; Noé: il marchait avec Dieu; Unis grâce à l’enseignement divin.