Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/99 lok. 1
  • Bondelá mpo na kozwa lisungi ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bondelá mpo na kozwa lisungi ya Yehova
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • “Tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mabondeli na yo emonisaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Zwá na motuya likabo oyo ozali na yango ya kobondela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bongisá lisusu ndenge na yo ya kobondela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 7/99 lok. 1

Bondelá mpo na kozwa lisungi ya Yehova

1 Yesu akɔtisaki na makanisi ya bayekoli na ye ntina ya kozwa lipamboli ya Yehova na mosala na bango ya kosakola. (Mat. 9:37, 38) Mabondeli oyo tosalaka na motema mobimba mpo na kokumisa Yehova mpe kopesa ye matɔndi, malɔmbɔ mpe kosɛnga ye, emonisaka ete totyaka mpenza motema epai ya Yehova mpo na kozwa lisungi na ye. (Filp. 4:6, 7) Makomami ezali kolendisa biso tóbondelaka ntango nyonso “na mabondeli nyonso mpe na malɔmbɔ,” yango etaleli mpe mabondeli na biso mpo na mosala ya kosakola.—Ef. 6:18.

2 Tokumisaka Yehova mpo bizaleli na ye mpe misala na ye eleki nyonso. Tokumisaka ye mpe lokola Mopesi ya nsango malamu oyo toteyaka. Ebongi tókumisa ye mpamba te bobele ye nde azali kokolisa mosala na biso ya kosakola.—Nz. 127:1.

3 Matɔndi oyo topesaka na kati ya mabondeli emonisaka motuya topesaka na boyebi oyo Yehova azali kopesa biso mpo na mokano na ye. Koteya bato mosusu nsango ya Bokonzi ezali libaku malamu, boye te? Topesaka Yehova matɔndi mpo na nyonso oyo tozali kosala na mosala ya kosakola.—Nz. 107:8; Ef. 5:20.

4 Na lolenge ya malamu mpenza, tosɛngaka lisungi ya Yehova mpo na kokutana na bato oyo bakondima koyekola Biblia mpe tosɛngaka lisungi na ye mpo solo ekoka kosimba mitema na bango. Na kosaláká mabondeli motindo yango tokomonisa ete bobele Nzambe nde akoki kokolisa mosala na biso ya kosakola.—1 Kol. 3:5-7.

5 Ndeko mwasi moko akanisaki ete mwasi moko oyo azalaki na molɔngɔ ya bato oyo atikelaka bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! atángaka bazulunalo yango te. Lokola alingaki te ete bazulunalo yango ya ntina mingi ebeba mpamba, asɛngaki Yehova ete, soki mwasi oyo atángaka yango te, aboya kozwa yango. Ntango ndeko mwasi akendaki lisusu kotala mwasi yango, mobali ya mwasi yango alobaki ete: “Matɔndi mingi na ndenge ozali kotikela biso bazulunalo oyo ntango nyonso. Natángaka yango mpe nalingaka yango mingi.”

6 Tokoki kobondela Yehova na komikitisa nyonso mpe kosɛnga ye asalisa biso mpo na koyika mpiko soki bato bazali kosepela te mpe soki bazali kosɛka biso. Tokobondela mpe ye ete tóbangaka bato te mpo ete tókoba na molende nyonso kopesa bato mosusu litatoli. (Mis. 4:31) Soki totiki te kobondela ntango nyonso “na mabondeli nyonso mpe na malɔmbɔ” wana tozali kokoba na botosi nyonso mosala na biso ya bosantu, tokoki kotya motema ete Yehova akosunga biso.—1 Yoa. 3:22.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto