Yehova azali koteya biso
1 Na litambwisi ya Nzambe, programɛ moko mpo na koteya bato na mokili mobimba ezali kosalema lelo oyo na bikólo 233. Programɛ yango ya koteya eleki mateya nyonso oyo mokili ekoki kopesa. Molakisi na biso Monene, Yehova, azali koteya biso mpo na bolamu na biso sikoyo. Azali mpe kobongisa biso mpo na bomoi ya seko.—Yis. 30:20; 48:17.
2 Biteyelo mpo na kolakisama na Nzambe: Tótalela biteyelo oyo ezali kotambwisama mpo na bolamu ya libota ya Yehova. Eteyelo mpo na mosala ya teokrasi, yango ezali kotambwisama pɔsɔ na pɔsɔ na masangá pene na 87 000, ezali kobongisa bamilio ya basakoli ya Bokonzi ete básakolaka nsango malamu na molende. Osilá kokomisa nkombo na yo na eteyelo yango? Ozali na kati ya ebele ya bandeko oyo balandaki mateya na boumeli ya pɔsɔ mibale na Eteyelo mpo na babongisi-nzela? Mbala mosusu lokola bakitisi ngonga ya babongisi-nzela ya sanza na sanza yango ekopesa bandeko mingi libaku bákóma babongisi-nzela mpe bámibongisa mpo na kokɔta na eteyelo yango. Na boumeli ya sanza mibale, Eteyelo mpo na kobongisa basungi, ezali lelo oyo kotambwisama na nkota oyo bato mingi balobaka yango na mokili mobimba. Eteyelo yango ezali kobongisa bankulutu na basaleli na misala oyo babalá te mpo na kozwa mikumba minene ya Teokrasi. Mbala na mbala, bankulutu mpe basaleli na misala bazwaka mateya ya sikisiki na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi.
3 Mpo na kopesa mateya ya Teokrasi, biteyelo misato ya sikisiki ezali kosalela bandako ya Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na etúká ya New York. Na boumeli ya sanza mitano, Eteyelo ya Gileadi ebongisaka bandeko mpo na mosala ya misionere na mboka mopaya. Na boumeli ya sanza mibale, Basangani ya komite ya bafiliale na mokili mobimba balandaka mateya mpo na kokamba bafiliale malamu. Banda na sanza ya Mai 1999 bafungolaki eteyelo ya sika ya sanza mibale mpo na bakɛngɛli batamboli; bayekoli 48 oyo bazali kolanda mateya na kelasi yango ya liboso bauti na États-Unis mpe na Canada. Basaleli nyonso ya Yehova bazwaka matomba malamu na bibongiseli nyonso oyo Yehova azali kopesa bango na nzela ya biteyelo oyo nyonso.
4 Tozali koteyama mpo na mokano nini?: Ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alobaki boye: “Programɛ na biso ya mateya ebongisami mpo na kopesa basaleli nyonso ya Yehova oyo bazali na bisika nyonso na mokili likoki ya kokola na elimo ndenge emonisami na Masese 1:1-4.” Tiká ete Yehova akoba kopesa mokomoko na biso “lolemo ya baoyo balakisami.”—Yis. 50:4.