Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/99 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 3/99 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala milende mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokozala mpe na mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato oyo bakosepela. Yuni: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.

◼ Basakoli oyo balingi kozala babongi-nzela basungi na sanza ya Aprili mpe ya Mai basengeli komibongisa banda sikoyo mpe kotondisa noki lokasa ya lisɛngi. Yango ekopesa nzela na bankulutu ete bázwa bibongiseli ya ntina mpo na mosala ya kosakola mpe kolɛngɛla bazulunalo oyo ekoki mpe mikanda mosusu. Nkombo ya baoyo nyonso lisɛngi na bango ekondimama ekoyebisama na lisangá.

◼ Mokɛngɛli mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Marsi to mwa moke nsima. Nsima ya kotalela kɔnti, basengeli koyebisa yango na lisangá ntango bakotánga lapolo ya mbala ya nsima.

◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya minei, mwa 1 Aprili 1999. Soki na lisangá na bino bosalaka makita na mokolo ya minei, makita yango masengeli kosalema mokolo mosusu kati na pɔsɔ soki Ndako ya Bokonzi ekozala mpamba. Soki esalemi ete likoki ya kosala Likita na bino ya mosala ezali te, makambo ya likita yango, oyo etaleli lisangá na bino makoki kosalelama na Likita mosusu ya mosala.

◼ Bandeko ya lisangá basengeli kotinda abonema na bango nyonso na nzela ya lisangá to mpe soki balingi kozongela abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, bakotinda yango na nzela ya lisangá.

◼ La Société akondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli mokambi akozwa bibongiseli ete liyebisi lipesama sanza na sanza liboso ete komande ya mikanda ya sanza ekoka kotindama na la Société. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko ete bákoka koyebisa na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda oyo bokoki kosala komande sipesiale.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—1999​—Kiluba

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—1999​—Lifalanse

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—1999​—Lingala

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—1999​—Monokutuba

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—1999​—Otetela

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—1999​—Tshiluba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto