Biyano na mituna na bino
◼ Ndenge nini tokoki kosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto na limemya mpenza?
1 Na butu oyo balingaki kokanga ye, Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye na maloba oyo: ‘Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.’ (Luka 22:19, NW) Ndenge nini Tosengeli kokanisa ye? Soki tolingi komitambwisa lokola bayekoli ya Yesu, esengeli ete mokomoko na biso akanga ntina ya etinda yango, ndimbola na yango mpo na ye mpe mpo na bomoi na ye ya mikolo mizali koya.
2 Baklisto mosusu basalaka fɛti mokolo ya Ekaniseli. Na mabaku mosusu bilenge basalaka fɛti na bango epai, bakóló mpe epai mosusu. Bakangaka bafɔtɔ mpo ete “bábosana mokolo yango te.” Baboti mosusu basombelaka bana na bango bilamba mpe bapesaka bango makabo mosusu. Basusu bapesanaka mbote na mokolo yango na kosaleláká maloba lokola “bonne fête!” Ezali na lolenge wana nde Yesu alingaki ete tókanisaka ye?
3 Ntoma Paulo akomaki: ‘Mbala nyonso oyo bokolya limpa oyo mpe bokomɛla vinyo oyo, bozali kosakola kufa na Nkolo kino akoya.’ (1 Kol. 11:26, NW) Na yango, Ekaniseli ezali kobenda likebi na biso likoló na ntina monene ya liwa ya Yesu kati na kokokisama ya mokano ya Yehova. Liwa na ye epesi nzela mpo na kosikola bakitani ya Adama mpe kopesa baoyo bakomonisa kondima likoki ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé kati na paladiso. (Yoa. 3:16, Gen. 1:28) Mpo na kondima oyo bazali na yango na makila ya Klisto, “bampate mosusu” batángami pɛto na miso ya Yehova. Mpo na yango bazali na libaku monene ya kosalela Nzambe “mosala ya bulɛɛ butu na moi kati na tempelo na ye.” (Emon. 7:14, 15) Lisusu, Ekaniseli ezali kokundwela bango elikya malamu oyo bazali na yango ya kokóma bato ya kokoka mpe ya sembo ntango Yesu akozongisa Bokonzi epai na Tata na ye.—Sef. 2:2, 3; 1 Kol. 15:24.
4 Na maloba oyo: ‘Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai,’ Yesu alingaki ete tómanyola bolingo oyo Yehova amoniselaki biso ntango apesaki Mwana na ye molingami, mpe bolingo oyo Yesu ye moko amonisaki ntango apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato oyo bakomonisa kondima. (Luka 22:19) Alingaki mpe ete tókanisa matomba oyo mbeka ya bomoi na ye ekomemela biso lelo oyo mpe na mikolo mizali koya. (Yoa. 3:16; Lom. 5:8; 1 Tim. 2:5, 6) Na bongo, mokolo ya Ekaniseli ezali libaku moko malamu mpo na komanyola na botɔndi mpenza makambo oyo nyonso.
5 Na yango, ntango baklisto bazali kozela mokolo ya Ekaniseli mpo na kosala fɛti to kopesa bana na bango makabo bazali kobebisa ntina mpenza ya molulu yango mpe bazali kokómisa yango lokola fɛti ya mokili. Kosala bongo ezali kokokanisa Ekaniseli na bafɛti mosusu ya bapakano lokola fɛti ya bonane to ya Noele. Ezali kokómisa yango lokola libaku moko mpo na kokokisa “bamposa ya mosuni” na esika ete ezala libaku mpo na komanyola makambo ya elimo. (Lom. 13:14; talá Yisaya 5:12.) Moyekoli moko te ya Yesu akosepela kobebisa molulu oyo ezali na ntina mingi kati na lisolo ya bato. Tolingi kosala yango na ndenge ebongi na komanyoláká bolingo ya Yehova mpe ya Yesu Klisto, mpe matomba oyo makila ya Klisto ezali komemela biso lelo oyo mpe na mikolo mizali koya.—Nz. 116:12, 13.