Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Desɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko elongo na Traduction du monde nouveau. Yanuáli: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1985 mpe ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na babuku yango te ekoki kokabola buku La paix et la sécurité véritables — Comment est-ce possible? to buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Febwáli: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Mársi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala milende ya kobanda boyekoli ya Biblia.
◼ Masangá ekoki kobanda kosɛnga volimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya 1998 na bakomande na bango ya mikanda ya Desɛ́mbɛ. Ekozala na Lifalanse.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona asengeli kotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Desɛ́mbɛ to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá ntango bakopesa lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Ekaniseli mpo na mobu 2000 ekosalema na mwa 19 Apríli nsima ya kokita ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete bipai oyo masangá mingi ezali kosalela Ndako ya Bokonzi bobele moko, bandeko bákoka kozwa bibongiseli ya koluka bisika mosusu mpo na kosala yango. Bankulutu basengeli kosolola na mokóló esika mpo na koyeba soki makambo mosusu ekosalema te na esika yango na mokolo oyo Ekaniseli esengeli kosalema. Lokola ete libaku yango ezali na ntina mingi, lisangani ya bankulutu esengeli kopona nkulutu oyo azali na makoki mingi mpo na kosala lisukulu na esika ete básalaka yango moto na moto na ngala na ye to básalelaka bobele ndeko moko mbula na mbula. Longola bobele soki nkulutu moko mopakolami ya makoki azali, akoki kosala lisukulu yango.
◼ Mwa buku oyo ezali na motó na likambo The Guidance of God—Our Way to Paradise elingi kobima. Mwa buku yango esalemi mpo na kobenda likebi ya Bamizilma oyo bakei kofanda na bikólo mosusu mpe na bisika oyo bakoki koyekola Biblia na bonsomi nyonso. Mwa buku yango ekobimisama na nkota koleka 20. Sikawa, bokoki kosala komande bobele mpo na ebimeli ya Lingelesi. Ntango bibimeli ya nkota mosusu ekozala, tokoyebisa bino.
◼ Sanza ya Yanuáli ekozala na wikende mitano, yango ekoki kopesa bandeko mingi nzela ete básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza yango.