Tókabola Biblia Traduction du monde Nouveau
1 Molimboli moko ya lokota ya Liebele mpe ya Greke alobaki ete: “[Traduction] du monde nouveau ezali libongoli oyo ebongi mpenza. Ekomami ndenge lokota ezali kolobama na mikolo na biso, mpe epusaka motángi ete amanyola mpe ayekola yango. Ezali mosala ya banganga-batyoli te, kasi mosala ya banganga-mayele oyo bakumisaka Nzambe mpe Liloba na Ye.” Tondimi mpenza maloba yango! Kasi ndenge nini tokoki kosalisa bato mosusu ete bango mpe básepela na Biblia Traduction du monde nouveau ntango tokokabola yango esika moko na buku Boyebi na sanza ya Desɛ́mbɛ?
2 Bato mosusu bakoki koloba ete: “Nazali na Biblia na ngai. Nazali na mposa ya Biblia mosusu te.” Mokumba na biso ezali ya komonisa bango ete Biblia Traduction du monde nouveau ekokani na Biblia mosusu te. Ezali libongoli oyo ekomami ndenge lokota ezali kolobama na mikolo na biso mpe ezali kosalela maloba ya polele oyo mazali kolimbola mpenza maloba ya makomi ya ebandeli. Moko na makambo oyo mazali kokesenisa yango na mabongoli mosusu ekoki komonana soki tokokanisi yango na ndenge ya kobongola maloba. Na ndakisa, maloba lokola “marché” (na Louis Segond ) mpe “marché de la viande” (na Traduction du monde nouveau) na 1 Bakolinti 10:25.
3 Nzokande, bobele bato moke nde batángaka Biblia, mpe basosolaka malamu mpenza te ntina ya mitinda na yango mpo na bomoi ya mokolo na mokolo. Basengeli koyeba ndenge Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa bango na bomoi na bango. Basengeli mpe koyeba ete kolanda toli na yango mpo na makambo matali kolongobana, bizaleli malamu mpe bomoi ya libota ekoki kosalisa bango ete bálonga mikakatano ya mikolo oyo. Ndenge nini tokoki kosala yango?
4 Elakiseli: Tokoki koloba boye: “Ondimi mpenza ete bizaleli malamu bikómi kobeba mpe ete bato bazali koyeba te soki ekosuka ndenge nini. Na bongo, nani tokoki kotyela ye motema mpo na kotambwisa biso? [Tiká ete moto yango apesa eyano.] Atako ezali buku ya kala mpenza, Biblia ezali kopesa toli ya ntina mpo na bomoi ya mikolo na biso mpe bomoi ya libota ya esengo.” Fungolá mokapo ya 2 ya buku Boyebi, tángá paragrafe 10 mpe molɔngɔ ya liboso ya paragrafe 11, bakisá mpe 2 Timote 3:16, 17. Soki moto yango asepeli, lakisá ye buku Boyebi, limbolelá ye ebongiseli ya koyekola Biblia kozanga kofuta mbongo, mpe lakisá ye Biblia Traduction du monde nouveau. Soki omoni ete ekoki kozala malamu kobanda boyekoli na mwa buku Azali kosɛnga, okoki kobanda. Okozwa makanisi mosusu ya bokɔti na lisolo na buku Comment raisonner na nkasa 9-15.
5 Tómonisa motuya ya Biblia Traduction du monde nouveau. Tokoki kosala bongo na kokaboláká yango na molende na sanza ya Desɛ́mbɛ.