Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Novɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Desɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe Traduction du monde nouveau. Yanuáli: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1985 oyo ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na yango lisusu te ekolakisa buku La paix et la sécurité véritables : comment est-ce possible ? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Febwáli: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
◼ Masangá ekobanda kosɛnga Annuaire des Témoins de Jéhovah 1999 na bakomande na bango ya mikanda ya Novɛ́mbɛ. Annuaire yango ekozala na nkota oyo: Allemand, Arabe, Lifalanse, Lingelesi, mpe na Portugais. Kino mokanda yango ekozala mpe ekotindama, ba bordereaux d’expédition ekozala na likomi oyo: “Ekotindama na nsima.” Annuaire ezali mokanda oyo epesamaka na komande sipesiale.
◼ Na bambula oyo, ezali lisusu mpasi te mpo na kokende na mboka mopaya. Na yango, bandeko mingi bazali kokende na bamboka mosusu. Mbala mingi, basɛngaka koyeba makambo mosusu na babiro ya filiale ya la Société. Bafiliale ezalaka na esengo ya koyebisa bango baadresi ya Bandako ya Bokonzi mpe manaka ya makita. Yango esalisaka bango ete bákutana na bandeko ya masangá epai bango bakei. Bafiliale ekoki mpe koyebisa lolenge bakoki kokende kotala bandako ya filiale ya mboka oyo bango bakei. Nzokande, bandeko basɛngaka na bafiliale ete báyeba makambo mosusu oyo etali lolenge ya kosala mobembo, kozwa esika ya kofanda, bisika ya kotala mpe makambo mosusu ya motindo wana. Babiro ya filiale ezali na likoki te mpe ezali na ngonga te ya koyanola na mituna motindo wana. Bato oyo bakosala mibembo bakoki kotuna ba agences de voyages to ba offices de tourisme, oyo ezali na makoki ya koyebisa makambo yango na basali mibembo.