Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Ɔkɔtɔ́bɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Epai oyo bato basepeli na ntango ya bozongeli ya sika, tokoki kosɛnga na bango básala abonema. Desɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.
◼ Bankulutu basengeli kolanda malako oyo mapesamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1991, na nk. 21-23, na ntina na moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to oyo amilongolaki ye moko, oyo mbala mosusu akoki kosepela kozonga na lisangá.
◼ Bato nyonso oyo bazali kosangana na lisangá moko basengeli kotinda baabonema nyonso na nzela ya lisangá, ezala baabonema ya sika to oyo bazali kozongela kosala mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bakisa mpe baabonema na bango moko.
◼ La Société andimaka te komande ya mikanda oyo mosakoli asali mpo na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi asengeli kozwa bibongiseli mpo ete liyebisi lipesama na lisangá sanza na sanza liboso ete komande ya mikanda mpo na lisangá etindama na la Société. Boye baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda na bango moko bákoka koyebisa na ndeko oyo atɛkaka mikanda. Kobosana te mikanda oyo ezwamaka na komande sipesiale.
◼ La Société azali na bavolimi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ya 1950 kino 1955, 1957, 1961, 1963, 1964, 1967, 1975 kino 1981, 1983 kino 1989, 1991, 1996 na Lifalanse bakisa mpe bavolimi ya Lamuká!, ya 1990, 1992 kino 1996 na Lifalanse. Azali mpe na Annuaire ya Lifalanse ya bambula oyo: 1977, 1988, 1993, 1995 kino 1998. Basakoli nyonso to masangá ya sika nyonso oyo bazali na mposa na yango bakoki sikawa kosɛnga yango na nzela ya mosaleli na misala oyo atɛkaka mikanda. (Talá Mosala na biso ya Bokonzi, Máí 1997, etanda Biyano na mituna na bino; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1994, nk. 28-31.)
◼ Tolingi koyebisa bino ete batrakte oyo bosalaki komande tokotindela bino yango. Ntalo na yango ekozala mpo na liboke mokomoko ya batrakte 100. (Talá S-15.) Soki motángo ya batrakte eleki to ezangi, bótinda nkoma te mpo na yango. Soki bosali bongo, mosala ya bandeko oyo batindaka mikanda ekozala pɛpɛlɛ.
◼ Tolingi kobenda likebi na bino na lolenge ya kosalela malamu masukulu ya bato nyonso oyo totindelaki bino: (1) Mokɛngɛli-mokambi asengeli kobomba ba plans nyonso na dosye moko. (2) Kopesa na molobi fotokopi moko ya plan ya lisukulu. (3) Lisukulu moko ekoki kopesama na balobi mingi. (4) Bókɔtisa ba plans ya sika oyo la Société atindaki na dosye na bino.