Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ: Mwa buku moko ya nkasa 32 kati na oyo: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Soki likoki ezali, tokoki kosalela mwa babuku oyo elandi: Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes — Qui nous aidera à les résoudre?; Un livre pour tous. Ɔkɔtɔ́bɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika, tokoki kosɛnga na ye asala abonema.
◼ Sanza ya Augústo ezali na wikɛndɛ mitano, yango ekosalisa bandeko mingi ete básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza yango.
◼ Banda sanza ya Sɛtɛ́mbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya bato banso oyo ezali na motó na likambo ete “Ozali kotambola elongo na Nzambe?”
◼ Mikanda ya sika oyo ezali:
Lifalanse: Nzambe azali kosenga nini epai na biso?; La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? ; Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau (édition courante) mpe Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
Lari: Nzambe azali kosenga nini epai na biso?
◼ Esɛngami na masangá ete básala ɛvantɛrɛ ya mbula mpo na mikanda mpe bazulunalo mpe bátinda yango na Biro, nsuka mwa 6 Sɛtɛ́mbɛ 1998. Biro azali na lotomo ya kokata bakomande ya masangá oyo bakozongisa te lokasa S-18 oyo etondisami malamu mpe etyami sinyatili.