Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yulí: Mikanda nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá kati na babuku oyo: Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika; Boyoka Moteyi Monene; Kimia ya solo—ekouta wapi?; Le bonheur — Comment le trouver ?; “Que ton royaume vienne!”; Libateli ya molongo mobimba na nse ya Boyangeli ya “Mokonzi na kimya”; Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko; Votre jeunesse — Comment en tirer le meilleur parti. Bokoki kosɛnga na la Société mwa ndambo moke ya babuku oyo: Jeunesse, Paix véritable, “Que ton royaume vienne!,” Sécurité universelle mpe Unis dans le culte. Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ: Mwa buku ya nkasa 32 kati na oyo: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Soki likoki ezali, tokoki kosalela mwa babuku oyo elandi: Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes — Qui nous aidera à les résoudre?; Un livre pour tous. Ɔkɔtɔ́bɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.
◼ Kɔnti ya lisangá esengeli kotalelama na mwa 1 Augústo, to mwa moke nsima ya dati yango, na mokɛngɛli-mokambi to na ndeko mosusu oyo ye akopona. Na nsima, esengeli koyebisa na lisangá ete kɔnti etalelamaki.
◼ Le CD-ROM Watchtower Library—Édition 1997 ebimisami sikawa na nkota libwa. Esengeli ntango nyonso koyeba ete ezali eloko ya kokabola epai na bato ya libanda te, to kotyama na babibliotɛkɛ ya kelasi to kopesa na bato oyo bamonisi bobele bosepeli mpo na Batatoli ya Yehova te. Watchtower Library ezali mpo na bandeko, mpe ekoki kozwama bobele na nzela ya lisangá.
◼ La Société azali kosɛnga na masangá oyo balingi mpe oyo bakɔnti na bango ezali malamu ete básɛnga mwa babuku oyo: “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso.