Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yúni: Bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Yulí: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá, kati na babuku oyo: Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika; Boyoka Moteyi Monene; Kimia ya Solo—ekouta wapi?; Le bonheur — Comment le trouver ?; “Que ton royaume vienne!”; Libateli ya molongo mobimba na nse ya Boyangeli ya “Mokonzi na kimya”; Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko; Votre jeunesse — Comment en tirer le meilleur parti. Tokoki kosɛnga na la Société ndambo esengeli ya babuku oyo: Jeunesse, Paix véritable, “Que ton royaume vienne!” Sécurité universelle mpe Unis dans le culte. Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ: Moko na mwa babuku ya nkasa 32 oyo elandi: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Soki likoki ezali, tokoki kosalela mwa babuku oyo elandi: Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes — Qui nous aidera à les résoudre?; Un livre pour tous.
◼ Kobanda pɔsɔ ya 21 Sɛtɛ́mbɛ 1998, tokotalela mwa babuku ndenge na ndenge kati na boyekoli ya mokanda ya lisangá. Tokobanda na mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
◼ Na nkasa 131 mpe 132, buku Lisanga epesi batoli ya polelepolele na ntina na molato oyo tosengeli kozala na yango ntango tozali kosala misala ndenge na ndenge ya boklisto mpe ntango tokei kotala Betele. Na mawa nyonso, emonanaki ete bamoko kati na biso, oyo bazali na libaku ya kokende na Betele ya Kinshasa, bazali kolanda malako yango te. Yango wana tolingi kobenda likebi ya moko na moko na likambo yango. Lokola Betele ezali “ndako ya Nzambe,” tolingi kobatela lokumu na yango na komilatisáká na motindo molongobani ntango tozali kokende kotala yango. (1 Tim. 2:9) Tókamwa te ntango bazongisi biso soki molato na biso elongobani te. (Talá mpe “Biyano na mituna na bino.”)
◼ Bankulutu nyonso oyo bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza to babongisi-nzela monene bakopesamela kredi ya ngonga 15 mpo na sanza oyo bayanganaki na mateya oyo mabakisamaki na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi.
◼ Na Yulí, lisangá mokomoko ekozwa baekzamplere mibale ya formilɛrɛ “Inventaire annuel des publications” (S-18) mpe ya formilɛrɛ “Rapport d’analyse de la congrégation” (S-10). Tozali kosɛnga na bino ete bósala evantɛrɛ ya nsuka ya mbula ya lisangá na bino na sanza ya Augústo. Nkoma moko oyo ekolimbwela bino lolenge ya kotondisa formilɛrɛ S-18 ekokómela bino na ntango yango.