Tokosala mosala yango lisusu?—Libyangi mosusu mpo na babongisi-nzela basungi—Eteni 2
Liyebisi: Totalelaki eteni ya liboso na Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1998. Oyo ezali kolandana na yango:
12 Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akokutana na ndeko oyo azali na mokumba ya kokabola teritware mpo ete akamata elongo na ye bibongiseli ya kosakola na bateritware oyo basalelaka mobimba te. Basakoli basengeli koluka mpenza kokutana na bato oyo bazalaki na ndako te mpe kopesa litatoli na balabála mpe na bamagazini. Ebongi kolendisa mosala ya kosakola na mpokwa. Esengeli kosala komande ya bazulunalo mingi mpo na sanza ya Máí mpe ya Yúni na ntina ete mosala ya kosakola esalema mingi.
13 Basakoli mingi bakoki kokokisa masɛngami: Na formilɛrɛ ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi, tozali kotánga na molɔngɔ ya liboso ete: “Mpo na bolingo na ngai epai na Yehova mpe mposa na ngai ya kosalisa basusu ete báyeba ye mpe mikano na ye mitondi na bolingo, nalingi kokolisa mosala na ngai ya kosakola na kosɛngáká mosala ya mobongisi-nzela mosungi.” Bolingo mpo na Yehova mpe mposa na biso mpo na kosalisa basusu na elimo ezali bizaleli ya ntina oyo epusi biso ete tómipesa na Yehova. (1 Tim. 4:8, 10) Na oyo etali masɛngami mpo na kondimama lokola mobongisi-nzela mosungi, osengeli kozwa batisimo, kozala na etamboli malamu mpe na likoki ya kolekisa ngonga 60 na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza. Wana mokomoko kati na biso azali kotalela ezalela na ye mpenza, bamoko kati na biso baoyo basalá naino te mosala ya mobongisi-nzela mosungi bakoki komeka kosala yango na mbula oyo, na sanza ya Máí mpe ya Yúni?
14 Bato mingi kati na masangá bakososola ete bango mpe bakoki kosala lokola babongisi-nzela basungi soki bamoni basusu oyo bazali na mikakatano lokola bango basɛngi mosala yango. Bayekoli, mibange, bato oyo basalaka, kati na bango bankulutu mpe basaleli na misala, mpe basusu, basili kolonga kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na sanza moko oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mwasi moko mama ya bana mibale akokisaki ngonga 60, akabolaki bazulunalo 108, mpe abandaki boyekoli ya Biblia 3, atako azalaki na mosala oyo ezalaki kozwa ye ntango mingi. Lolenge nini akokaki kosala yango? Na ntango ya bopemi na mosala na eleko ya midi, azalaki kosakola na teritware oyo ezalaki pembeni, azalaki kopesa litatoli na baparking, na balabála mpe na kokomáká mikanda. Pɔsɔ na pɔsɔ, na mokolo na ye ya bopemi, azalaki kobima na mosala ya kosakola elongo na bandeko ya lisangá. Atako na ebandeli azalaki kokanisa ete akokoka te kozala mobongisi-nzela mosungi, kasi na elendiseli ya basusu mpe na manaka malamu, alongaki mikakatano yango.
15 Yesu andimisaki bayekoli na ye ete: “Ekanganeli na ngai ezali ya bopɔlɔ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Mat. 11:30, NW) Mokapo oyo ezalaki motó na likambo ya lisolo moko ya ntina kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1995. Yango elobelaki ndeko mwasi moko oyo mosala na ye ya mosuni ezalaki mokakatano monene mpo na ye. Kasi alongolaki nde motema ete mosala ya mobongisi-nzela mosungi ezalaki mpo na ye te? Soko moke te. Kutu amibongisaki sanza na sanza mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi. Mpo na nini? Asosolaki ete mosala ya mobongisi-nzela ezali kosalisa ye mpo ete azala mpenza na bokatikati. Kosunga bato mpo báyeba solo ya Biblia mpe komona bango kobongola bomoi na bango mpo ete bándimama na Nzambe ezalaki kopesa ye esengo mingi kati na bomoi na ye atako azalaki na makambo mingi ya kosala.—Mas. 10:22.
16 Mapamboli oyo moto akoki kozwa na kozaláká mobongisi-nzela eleki mikakatano oyo mizalaka liboso na ye mpe mbongwana oyo ye asengeli kosala. Ndeko mwasi moko akomaki na ntina na mosala na ye ya mobongisi-nzela mosungi ete: “Yango esalisaki ngai ete natalela bobele makambo na ngai moko te kasi namipesa mpe mingi koleka mpo na kosalisa basusu. . . . Nazali kosɛnga na baoyo nyonso bazali na likoki ya kosala mosala yango ete básala yango.”
17 Mosala yango esɛngaka manaka malamu: Na lokasa 7 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1998, tozongeli bandakisa ya manaka oyo mabimisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1997. Ntango mosusu, moko na manaka yango ebongi na yo. Ntango ozali kotalela yango, talelá misala na yo ya mokolo na mokolo na boumeli ya sanza. Ezali na makambo oyo okoki kosala yango liboso ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela to okoki kotika yango mpo na mwa ntango kino okokokisa yango nsima? Okoki kolongola mwa ntango kati na ntango oyo olekisaka mpo na kominanola mpe mpo na makambo mosusu oyo osepelisaka nzoto? Na esika ete omona bobele ngonga 60 oyo osengeli kokokisa na nsuka ya sanza, bongisá nde manaka na yo mpo na koyeba ngonga boni okoki kosala mokolo na mokolo to pɔsɔ na pɔsɔ. Osengeli bobele na ngonga 2 na mokolo to na ngonga 15 na pɔsɔ mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Talá bandakisa ya manaka mpe tyá elembo na biki na manaka oyo ebongi na yo mpe na libota na yo.
18 Lolenge bandeko bandimaki makasi libyangi ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe milende oyo basalaki mpo na mosala ya kosakola na eleko ya Ekaniseli na mbula oyo eleki, ekolisaki esengo ya ndeko mwasi moko mobongisi-nzela ya sanza na sanza oyo alobaki ete: “Natɔndi bino mingi mpo na bolingo oyo bosili komonisa na kolendisáká bandeko ete básala makasi mingi koleka mpo na kozala babongisi-nzela basungi. . . . Manaka ndenge na ndenge oyo botyaki esalisi bandeko mingi oyo basalá naino te mosala ya mobongisi-nzela mosungi báyeba ete bakoki kosala yango. . . . Nazali na esengo mingi ya kozala na lisangá ya Yehova mpe komona litambwisi ya bolingo oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kopesa biso.”
19 Masese 21:5 (NW) endimisi biso ete: “Myango na moto na etingya ekobimisa solo litomba.” Masese 16:3 elendisi biso ete: “Pesá misala na yo epai na [Yehova] mpe mikano na yo mikobongisama.” Ɛɛ, na kobondeláká mpenza Yehova mpo na likatami na biso mpe na kotyáká elikya mobimba epai na ye ete akosunga biso ete tókokisa yango, tokoki kozala na elikya ete mikano na biso mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi mikokokisama. Ekoki kosalema ete, na boumeli ya sanza moko to sanza mibale ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi, tómona ete manaka na biso mazali kotambola malamu mpenza, na bongo tokoki kopusama na kokoba mosala yango na kotyáká elembo na esika moko ya formilɛrɛ ya mobongisi-nzela mosungi epai tozali kotánga ete: “Tyá elembo awa soki olingi kosala sanza na sanza mosala ya mobongisi-nzela mosungi kino ntango okotika.”
20 Yesu alobaki ete: “Ye oyo akondimaka ngai, misala mizali ngai kosala, akosala yango mpe lokola, mpe akosala yango koleka oyo.” (Yoa. 14:12) Na ntango na biso esakweli yango ezali kokokisama mpenza, ezali libaku malamu ete tózala basalani elongo na Nzambe. Sikawa ezali ntango ya kosakola nsango malamu na molende mingi koleka, kosaleláká ntango na biso malamu mpo na kokokisa mosala yango. (1 Kol. 3:9; Kols. 4:5) Kosala mbala na mbala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, ntango nyonso oyo tozali na likoki, ezali lolenge malamu mpenza ya kokokisa mokumba na biso lokola basakoli ya Bokonzi. Tolingi mpenza komona molende oyo babongisi-nzela basungi bakomonisa, na mbula oyo, mpo na kopesa masanzoli na nkombo monene ya Yehova. (Nz. 27:6) Na kotaleláká matomba oyo tozwaki na eleko ya Ekaniseli na mbula oyo eleki, tokoki komituna ete, ‘Tokosala mosala yango lisusu?’ Tomindimisi na elikya ete tokosala yango!
[Etanda na lokasa 3]
Okoki kondimama lokola mobongisi-nzela mosungi?
“Atako ezalela na yo ezali boni, soki osili kozwa batisimo, soki ozali na etamboli malamu mpe soki ozali na likoki ya kopesa ngonga 60 na sanza mpo na mosala ya kosakola, mpe soki okanisi ete okoki kosala sanza moko to sanza mingi lokola pionnier auxiliaire, bankulutu ya lisanga na yo bakosepela mpo na kondima lisengi na yo na mosala oyo ya ntina.”—Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, lokasa 114.