Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/98 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 5/98 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Máí mpe Yúni: Bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Yulí: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá, kati na babuku oyo: Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika; Boyoka Moteyi Monene; Kimya ya solo—Ekouta wapi?; Le bonheur — Comment le trouver ?; “Que ton royaume vienne!”; Libateli ya molongo mobimba na nse ya Boyangeli ya “Mokonzi na kimya”; Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko; Votre jeunesse — Comment en tirer le meilleur parti. Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ: Moko na mwa babuku ya nkasa 32 oyo elandi: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Soki likoki ezali, bokoki kosalela mwa babuku oyo elandi: Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; Bilimu ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes​ — Qui nous aidera à les résoudre?; Un livre pour tous.

◼ Ntango bazali kosala na teritware oyo lisangá ezali te, basakoli bakoki kolakisa buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga. Soki molobani asilá kozwa mikanda yango mibale, okoki kolakisa ye mokanda mosusu. Basakoli nyonso basengeli komema batrakte ndenge na ndenge mpo na kotika na bandako oyo bato bazalaki te to epai na bato oyo balingi kozwa mikanda te. Soki basakoli bazali naino na trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 to ezwami naino na libombo ya masangá esengeli kokabola yango nyonso epai na bato na bandako. Tokosala milende mpo na kolanda bosepeli, mingi mpenza na bateritware oyo lisangá ezali te kasi ekoki kosalema na babongisi-nzela monene to na masangá ya pembeni.

◼ Sanza ya Máí ebongi mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpamba te ezali na bawikende mitano.

◼ Makarɔ mpo na mayangani ya etúká ya 1998 na Kiluba, Kirundi, Lifalanse, Lingala, Monokutuba, Otetela, Swahili mpe na Tshiluba ekotindama nzela moko na mikanda kobanda na sanza ya Máí. Ezali na ntina te ete bósɛnga yango. Soki lisangá moko ezali na mposa ya kobakisa motángo ya makarɔ na yango, ekoyebisa yango na lokasa ya komande ya mikanda (S-14). Esengeli kosɛnga libenga ya plastiki oyo bakɔtisaka makarɔ mpo na bandeko oyo basepeli na yango.

◼ Tozali kokundwela bino ete basakoli bapesameli ndingisa te mpo na kozwa mikanda to bazulunalo na nyongo. Bandeko oyo bazali na mokumba yango basengeli kopesa yango na nyongo te.

◼ Disque compact ya sika oyo tozali na yango:

Mindule ya Bokonzi​—8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto