Elimo ya Yehova ezali elongo na biso
1 Mosala moko monene epesameli biso Batatoli ya Yehova. Mpo na yango, Yesu alobaki ete: “Ekoki ete nsango malamu elakisama kati na mabota nyonso liboso.” (Mko. 13:10) Na likanisi ya bato, yango ekokaki kosalema te. Nzokande, kati na molɔ́ngɔ́ ezali na nguya moko ya makasi oyo ezali kosunga biso: elimo ya Nzambe.—Mat. 19:26.
2 Matatoli ya ekeke ya liboso: Kosaleláká esakweli ya Yisaya mpo na ye moko, Yesu alobaki ete: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai . . . mpo na kosakola nsango malamu.” (Luka 4:17, 18, NW) Liboso ete amata na likoló, alobaki na bantoma na ye ete bango mpe bakozwa nguya ya elimo santu mpo ete básakola “kino nsuka na mokili.” Na nsima, elimo santu etindaki Filipo kosakwela Moetiopia moko, oyo azalaki mosali monene ya Leta; ekambaki Petelo epai na Moloma moko, oyo azalaki mokonzi ya basoda, mpe ezali lisusu elimo santu nde etindaki Paulo na Balanaba kosakwela bikólo ya bapaya. Nani akokaki kondima ete bato ya bisika ndenge na ndenge balingaki koyamba solo? Nzokande, bayambaki yango mpenza.—Mis. 1:8; 8:29-38; 10:19, 20, 44-48; 13:2-4, 46-48.
3 Matatoli ya lelo: Mokanda ya Emoniseli ezali kolobela mingi mokumba oyo elimo santu ezali kokokisa na eleko na biso kati na mosala ya kosakola. Ekomami kati na mokanda yango ete: “Elimo mpe mwasi ya libala bazali kokoba koloba ete: ‘Yaká!’ . . . Tiká ete moto oyo alingi akamata mai ya bomoi mpamba.” (Emon. 22:17, NW) Elimo epusaki kelasi ya mwasi ya Klisto mpe baninga na ye, “bampate mosusu,” ete básakola nsango malamu epai na bato nyonso. (Yoa. 10:16) Na bongo, tosengeli kosakola na molende. Tókakatana soko moke te na koloba epai na bato ya mitindo nyonso, kasi ntango nyonso tómindimisa solo ete elimo ya Nzambe ekosalisa biso. Buku Annuaire 1998 emonisi na lolenge oyo ezali kondimisa ete elimo ya Nzambe ezali ntango nyonso elongo na basaleli na ye. Osili kotala mitángo oyo mizali kati na buku yango? Na boumeli ya mbula mibale ya mosala oyo euti koleka, na mwayene, bato koleka 1 000 babatisamaki mokolo na mokolo.
4 Tómindimisa solo ete elimo ya Nzambe ekokoba kozala elongo na biso ntango nyonso oyo Yehova akolinga ete tósakola nsango ya Bokonzi. Lokola toyebi yango, tókoba komipesa na nguya nyonso kati na mosala monene ya Bokonzi!—1 Tim. 4:10.