Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Bozongeli wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 5 Yanuáli kino pɔsɔ ya 20 Apríli 1998. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.
[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]
Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:
1. Kati na Misala 15:29 (NW), liloba “Bokozala malamu,” ezalaki elaka oyo esengelaki kokokisama na lolenge oyo ete, ‘Soki boboi makila mpe ekobo, bokozala nzoto kolɔngɔnɔ.’ [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 15/6 lok. 9 par. 7, maloba na nse ya lokasa.]
2. Lobanzo monene oyo azalaki na yango mpo na bolamu ya elimo ya baklisto ya Kolinti epusaki Paulo ete akomela bango mokanda na ye ya liboso wana azalaki kosala mobembo na ye ya mibale ya misionere. [si lok. 198 par. 3]
3. Atako Yosafata amimonisaki mokonzi oyo atyaki elikya mobimba epai na Yehova, asalaki na mayele te na kondimáká ekanganeli ya libala elongo na Ahaba. [ad 843 par. 10-11]
4. Liloba “Simonie,” oyo euti na lisolo lizwami na Misala 8:9-24, ezali na boyokani na misala ya magie. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 1/6 lok. 17 par. 8.]
5. Na Baloma 8:6, 7, liloba “nzoto” elimboli ezalela na biso ya bato bazangi kokoka mpo na masumu oyo tosangolaki. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 1/3 lok. 21 par. 4.]
6. Na kotalela Baefese 5:33, limemya mozindo oyo mwasi asengeli kozala na yango epai na mobali na ye elimboli te ete akoki te koyebisa makanisi na ye, mpenzampenza soki likambo moko ezali kotungisa ye. [kl lok. 144 par. 12-13]
7. Ezalaki Yetelo, nganga ya Midyani, nde apesaki Mose makanisi ya kokabola mokumba elongo na bato mosusu. [ad 820 par. 8]
8. Ndenge moko mokano ya Nzambe ya komema bapakano kati na lisangá eyebanaki malamumalamu te kino bantoma bayaki komona makambo oyo mazalaki kosalema mpo na kokokisama ya esakweli yango, bobele bongo Batatoli ya Yehova bandimaka ete boyebi na bango likoló na makambo mosusu esili kosembolama lokola Nzambe ye moko azali kopesa engɛngiseli mokemoke. [jv lok. 629 par. 5-6]
9. Na Misala 20:20, liloba “ndako na ndako” etaleli bobele mokumba ya bankulutu ya kotala baninga bandimi na bandako na bango mpamba te maloba ya zingazinga mamonisi ete Paulo azalaki kolobela bankulutu ya lisangá. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 15/1 lok. 11 par. 5.]
10. Soki tobongisi motema na biso mpo na kopesa motuya na makambo ya elimo, na kosɛngáká lisalisi ya elimo ya Nzambe na bongo tokopɛngola “mposa ya nzoto.” (Lom. 8:6, 7, NW) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 1/3 lok. 21 par. 5.]
Yanolá na mituna milandi:
11. Lisolo nini kati na mokanda ya Misala emonisi ete kozala na Liloba ya Nzambe mpe kotánga yango ekoki te mpo na kozwa boyebi ya solo oyo ezali kotya bato na nzela ya bomoi? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ, talá w91 1/9 lok. 19 par. 16.]
12. Paulo alingaki koloba nini wana akomaki ete: “Bokonzi ezali te bobele yango euti na Nzambe”? (Lom. 13:1) [kl lok. 131 par. 7]
13. Kati na Misala 11:26, mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli maloba “babyangamaki baklisto na mokano na Nzambe,” nzokande mabongoli mosusu ya Biblia mabimisi likanisi ya “mokano na Nzambe” te? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 1/6 lok. 19 par. 19.]
14. Endimiseli nini ya makasi ezali kopusa Batatoli ya Yehova ete bázala basakoli mpe bakaboli ya Biblia na molende? [jv lok. 603 par. 3]
15. Lolenge nini ya boyekoli ya Biblia elendisami kati na Misala 17:11? [si lok. 193 par. 38]
16. Kati na mokanda na ye epai na baklisto ya Loma, likambo nini litalaki Bayuda mpe bato ya Mabota Paulo andimisaki? [si lok. 194 par. 2]
17. Engebene Baloma 12:2, na meko nini nguya ya Liloba ya Nzambe ezali kosala mbongwana kati na bomoto ya baklisto? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 1/4 lok. 16 par. 3.]
18. “Libombami mosantu” oyo Paulo alobeli na Baloma 11:25 (NW), elimboli nini? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w83-F 15/11 lok. 16 par. 16.]
19. Mpo na nini lisangá ya boklisto ezali na lotomo ya kobimisa basali na mabe oyo baboi kobongola motema? (1 Kol. 5:11, 13) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá g96-LI Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ lok. 17 par. 3-4.]
20. Lolenge nini elobeli oyo: kotya makala ya mɔ́tɔ na motó ya monguna esalisaka na kolonga mabe? (Lom. 12:20, 21) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá g86-F 22/1 lok. 6 par. 4.]
Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ́ milandi:
21. Filipo alimbolaki epai na mokube Moetiopia lolenge esakweli ya ․․․․․․․․ ekokisamaki, mpe wana angɛngisamaki na likambo yango, mokube wana asɛngaki na komikitisa nyonso ete ․․․․․․․․. (Mis. 8:28-35) [si lok. 192 par. 33]
22. Ntango likambo ya ․․․․․․․․ lizalaki kotalelama, ․․․․․․․․ azwaki moboko makasi ya ekateli na ye na kolobáká ete: “Maloba na basakoli mandimani mpe na likambo oyo pelamoko esili kokomama.” (Mis. 15:15-18) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá si lok. 192 par. 33.]
23. Elaka na Yisaya oyo ete “ntina na Yisai” ekotɛlɛma lokola “bɛndɛlɛ mpo na mabota” mpe bato “bakolukaka ye,” ekokisamaki kati na ․․․․․․․․. (Yis. 11:10) [ad 802 par. 9]
24. Engebene lisese ya Paulo ezwami na Baloma 11 oyo ezali kolobela nzete ya olive ya elilingi, lokola mabota 12 ya Yisalaele euti na Abalayama na nzela ya Yisaka, lolenge moko mabota 12 ya elilingi ya ․․․․․․․․ euti na ․․․․․․․․ na nzela ya ․․․․․․․․. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w83-F 15/11 lok. 16 par. 15.]
25. Ezalaki na Yulí 1917, nsima ya liwa ya Russel, nde la Société Watch Tower ebimisaki buku ․․․․․․․․, oyo elimbolaki mokanda ya ․․․․․․․․ mpe ․․․․․․․․ mpe ya ․․․․․․․․. [jv lok. 647 par. 1]
Poná eyano ya malamu na maloba mapesami oyo malandi:
26. Kati na lisukulu na ye na Misala mokapo 17, Paulo amonisi na bokɛngi nyonso (bokonzi; boyengebene; bolingo) ya Nzambe na bomoi. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá si lok. 193 par. 37.]
27. (Paulo; Petelo; Luka) akumisaki mpenza bato ya (Beloya; Makedonia; Yelusaleme), kobengáká bango “bato na makanisi mabongi.” (Mis. 17:11, NW) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/5 lok. 14 par. 3.]
28. Lokuta, to bokosi, oyo elobelami na Baloma 1:25 ezali na boyokani na (losambo ya bikeko; ezaleli ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo; ezaleli ya kokosa). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ad 998 par. 1.]
29. Na 1878, C. T. Russel mpe basalani na ye bakutanaki na komekama makasi ya kondima na bango mpe bosembo na bango na Liloba ya Nzambe. Yango etalelaki (koluka koyeba nani azali “moombo na sembo mpe na mayele”; kozala ya Yesu; motuya ya mbeka ya nzoto mpe makila ya Yesu). [jv lok. 619 par. 3]
30. Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti ntango azalaki na (Loma; Efese; Kolinti) soko na mobu (52; 55; 56) T.B. [si lok. 198 par. 3]
Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse.
Nz. 73:28; Mas. 24:3; Yis. 65:13; Mis. 10:34, 35; 2 Kol. 12:7-9
31. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosengeli kotalela bato ya bituluka nyonso ndenge Yehova azali kotalela bango. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/5 lok. 16 par. 6.]
32. Biblia ezali kopesa mitinda oyo mizali lokola bisaleli oyo bikoki kosalisa moto na kosala libota ya esengo. [kl lok. 140 par. 3]
33. Baoyo bazali kobɛlɛma na Yehova bazali kozwa bolamu ya solo mpe kimya ya elimo. [kl lok. 151 par. 3]
34. Na boumeli ya lisolo ya bato, Yehova azali kopesa bilei ya elimo epai na libota na ye lokola lisangá. [kl lok. 162 par. 6]
35. Yehova akoki kotika nzela na likambo moko ete eumela naino, kasi ayanolaka na mabondeli mpe ayebi ntango ya malamu koleka mpo na kopesa eyano. [kl lok. 156 par. 15]