Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/97 lok. 5
  • Nakoloba nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakoloba nini?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Osalelaka buku Comment raisonner?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tóluka baoyo balingi koteyama
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Ndenge nini kokolisa makoki ya kososolisa moto likambo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 12/97 lok. 5

Nakoloba nini?

Ntango tozali kokutana na bato oyo bamonisi bosepeli na mosala na biso ya kosakola, tolingaka kozongela bango mpo na koteya bango makambo mingi mpo ete bázwa litatoli ya mozindo. Nzokande, tokoki ntango mosusu koyeba te nini tokoloba mpo na kobanda lisoló. Mbala mosusu tokoki komeka kosalela lolenge oyo: kotuna motuna moko oyo ekolamwisa bosepeli, mpe komonisa eyano ya Makomami kati na búku Comment raisonner. Na ntembe te, tokomona ntina ya kozala na mituna oyo tokopona, oyo tomoni ete ekoki kobenda mpenza likebi ya moto na ntango ya bozongeli ya sika. Mituna milandi oyo mibongolami uta na búku Comment raisonner mizali komonisa nkasa epai kuna biyano bizwami:

◼ Bato basengeli kokende na likoló mpo na kozwa bolamu ya solo? (lok. 62)

◼ Tozali na bilembeteli oyo bindimisi biso ete Nzambe azali? (lok. 106)

◼ Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? (lok. 107)

◼ Mpo na nini ezali na ntina ete tóyeba mpe tósalela nkombo ya Nzambe? (lok. 200)

◼ Mpo na nini mabe ezali mingi na mokili? (lok. 237)

◼ Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? (lok. 253)

◼ Mpo na nini mangomba mazali mingi boye? (lok. 310)

◼ Lolenge nini okoki koyeba lingomba ya solo? (lok. 316)

◼ Bokonzi ya Nzambe ekosala nini? (lok. 336)

◼ Mokili ya lelo ezali na nsé ya bopusi makasi ya Satana? (lok. 368)

◼ Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi? (lok. 375)

◼ Bomoi ya moto ezali na ntina nini? (lok. 434)

Tokoki kotya mituna lokola oyo kati na Biblia na biso to na búku na biso Comment raisonner mpo na kotala yango nokinoki. Soki tozali na likambo ya sikisiki ya koloba na ntango ya bozongeli ya sika, yango ekolendisa biso ete tólanda na bosembo mpenza bosepeli nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto