Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/97 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 10/97 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔ́bɛ: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika, ekozala malamu ete osɛnga na ye asala abonemá. Na eteni ya nsuka ya sanza, tokokabola batrakte Nsango ya Bokonzi No. 35. Desɛ́mbɛ: Kokabolama ya trakte Nsango ya Bokonzi No. 35. Masangá oyo masili kosakola na teritware na bango mobimba mpe masili kotika ekzamplere moko ya Nsango ya Bokonzi No. 35 epai na basangani ya libota mokomoko to ya ndako mokomoko bakoki kolakisa búku Boyebi. Yanuáli: Biblia Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?

◼ Bato ya lisangá moko, oyo balingi kosala abonemá ya sika to kozongela yango, ezala mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká!, basengeli kotinda yango na nzela ya lisangá.

◼ La Société ezali kondima te demande ya mikanda na basakoli bango moko. Mokɛngɛli-mokambi akosala ete liyebisi lipesama sanza na sanza liboso ete lisangá etinda na la Société demande ya mikanda oyo esalemaka sanza na sanza. Yango ekosalisa baoyo nyonso balingi kosala komande ya bango moko ete báyebisa ndeko oyo atalelaka mikanda. Bóbosana te mikanda oyo bokoki kozwa na demande ya sipesiale.

◼ Lisoló “Biyano na mituna na bino” ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yúni 1997 elendisaki biso ete tózala na bokɛngi ntango tozali kosakola elongo na basakoli basi, soki tozali basakoli mibali, mpe elongo na basakoli mibali, soki tozali basakoli basi. Ebongi ete bato banso bázala na bososoli malamu na likambo yango. Yango elingi koloba te ete na ndakisa, bakɛngɛli-batamboli, to ata bandeko mibali mosusu, bakoki te kosakola elongo na bandeko basi. Kasi, likanisi ya kosimba ezali ete ebongi te na ndeko mobali moko ete abimaka mbala na mbala ye moko na mosala ya kosakola elongo na ndeko mwasi bobele moko wana, oyo azali ndeko na ye na mosuni te.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko ​​​— Lingala

Bavolime relyé ya La Tour de Garde mpe ya Réveillez-vous ! 1996 ​​​—Anglais, Français

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto