Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/97 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 6/97 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Yúni: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Yulí: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda boyekoli na ndako. Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ: Mwa búku ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi . . . ; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!

◼ Mikanda oyo tozali na yango:

Arabe: Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Trakte No. 13, 14, 15, 16, 19, 20, 21, 22. Lifalansé: Organisés pour bien remplir notre ministère; Louons Jéhovah par nos chants (petit format); Les jeunes s’interrogent; Le plus grand homme de tous les temps; Recueil d’histoires bibliques; Index 1986-1990. Lingala: Mituna oyo bilenge batunaka; Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Lingelesi: Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!; Nzembo mpo na kokumisa Yehova (disques compacts - enregistrement sur piano); Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Otetela: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo; Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Portugais: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo; Bomoi ya libota ya esengo; Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko. Swahili: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Tshiluba: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota; Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!

◼ Tozali na ebele ya bakasɛti na libombo. Basakoli balendisami na kosomba yango mpo na bango. Bakasɛti ya mikanda ya Biblia ezali na ntina mingi. Tokoki koyoka yango na ntango ya kolya to na ntango tozali kosala misala mosusu kati na ndako.

◼ Lisangá mokomoko elendisami na kobakisa komande na bango ya bazulunalo, engebene mposa ya mosakoli mokomoko, mpe kosala baabonemá mosusu ya sika. Esengeli kozela sanza misato mpo ete obanda kozwa nimero ya liboso ya abonemá, uta dati oyo yango etindamaki na Biro. Esengeli kotuna yango te liboso ya sanza misato.

◼ Uta sanza ya Febwáli 1997, mpo na bantina ebongi, Biro abandi kosalela mitango ya mikuse kati na kɔ́nti ya masangá ya Zaïre. Mpo na kozwa motango ya solo, esengeli kobakisa zero misato na nsuka ya motango yango. Na ndakisa: NZ 1 800 elimboli NZ 1 800 000. Kasi, na ntango bozali kotinda mosolo na bino na nzela ya S-20, tozali kosɛnga na bino ete bókoma mitango nyonso kozanga ete bókata yango. Na ndakisa: NZ 1 800 000 komá NZ 1 800 000 kasi kokoma te NZ 1 800.

◼ Na mawa nyonso tozali koyebisa bino ete, kobanda sanza oyo ya Yúni, Biro akondima lisusu te ba inventaires annuels ya Sɛtɛ́mbɛ 1996. Masangá oyo, kino lelo, batindi naino yango na Biro te, bakotindela bango mikanda te.

◼ Soki ndeko moko azali na mikanda ya kotinda na engumba moko kino na engumba mosusu, asengeli kosala yango ye moko. Ezali mpe bongo mpo na mikanda oyo mitindami epai na bato to na masangá ya mikili mosusu. Mikanda ya lolenge yango misengeli kopesama te na bandeko oyo bazali kotala badepó ya la Société mpo ete ekóma na Betele ya Kinshasa na likanisi ete Betele ekokómisa yango epai ezali kokende. Ezali komonana ete kopona mpe kotinda mikanda yango (to kotinda yango lisusu) ezali kosɛnga mosolo mingi, mpe lisusu, ezali kobakisa mosala mingi epai ya bandeko oyo bazali kosala na Betele.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto