Tólakisa bazulunalo mokolo ya pɔ́sɔ ya liboso mpe ya misato ya sanza na sanza
1 Uta mibu 118, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, lokola molobeli oyo akoki, ezali kokɔtela solo mpe mateya ya Biblia. Endimami na batángi oyo bazali na botɔ́ndi. Ezali ntango nyonso esaleli ya moboko oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kosalela mpo na kosakola Bokonzi ya Yehova oyo etyami mpe kopesa bilei ya elimo “na ntango ebongi.”—Mat. 24:14, 45.
2 Uta kobima na yango na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1919 na nkombo ya Âge d’or, lelo oyo Lamuká!, zulunalo yango ezali kolobela mingi ntina ya kolamwisa bato mpo na oyo etali ndimbola ya makambo oyo mazali koleka na mokili. Elobelaka masoló ndenge na ndenge mpe mabongi oyo makeseni na elobeli na yango ya bokatikati mpe ya mozindo. Masoló yango mazali kobenda likebi ya motángi likoló na nsango oyo eleki ntina ya zulunalo yango, ete makambo mazali kobima na mokili mazali kokokisa bisakweli ya Biblia, kosakoláká ete tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe ete, mosika mingi te, Bokonzi ya Nzambe ekosopa mapamboli ya seko epai ya baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe.
3 Lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisami na nkotá 125 mpe na baekzamplere 20 980 000 na sanza nzokande Lamuká! ebimisami na nkotá 82 mpe na baekzamplere 18 350 000 na sanza. Na teritware na biso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya lángi ezali kobima na Lingala, Swahili mpe Tshiluba mpe ezali mpe na bibimeli ya Kiluba, Kirundi, Monokutuba mpe Otetela. Na mbula eleki, mosakoli mokomoko akabolaki, na mwayene zulunalo 0,3 na sanza. Tokoki kosala nini mpo ete tókabola bazulunalo mingi na teritware na biso?
4 Ya liboso, tosengeli koyeba malamu ete kokabola mikanda ezali mpe na ntina lokola kosakola na monɔkɔ. Lisusu, tosengeli komityela mokano ya kokabola ndambo ya bazulunalo sanza na sanza. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuáli 1994 ezalaki na likanisi oyo ete: “Basakoli bakoki mbala mosusu kozala na mokano ya kokabola bazulunalo 10 na sanza, na kotalela ezalela ya makambo na bango; babongisi-nzela bakoki kokabola bazulunalo 90.”
5 Mpo na kokokisa mikano yango, lisangá mokomoko esengeli kobongisa mikolo ya bokaboli bazulunalo, mingimingi mokolo ya pɔ́sɔ ya liboso mpe ya misato ya sanza na sanza. Soki makita ya mosala ya kosakola ebongisami na ntɔ́ngɔ́, na nsima ya nzánga mpe na mpokwa, bazulunalo ekokabolama malamu. Epai wapi tokoki kokabola bazulunalo?
6 Na bisika oyo bato bazalaka mingi ebongi mpenza. Tokoki kotelema na matakanelo ya nzela mpe kokabola bazulunalo na bato oyo bazali koleka. Bamagazini, babutiki mpe zando ezali mpe bisika bibongi mpo na kokabola bazulunalo. Babongisi-nzela mosusu bazali kokabola bazulunalo ata na ba bars mpe bazali kozwa matomba malamu.
7 Tokoki mpe kokabola bazulunalo epai ya bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te, epai ya baninga na biso, epai ya bato oyo bafandi zingazinga na biso to epai ya baninga na biso ya mosala. Tósala mpe boye ete moyekoli mokomoko ya Biblia azala na ekzamplere na ye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Bayekoli ya Biblia bakoki kozala na molɔngɔ́ ya bato oyo totikelaka bazulunalo bakisa mpe bato mosusu.
8 Lokola nzela epesameli biso ya kosakola polele, tósalela mabaku nyonso oyo epesameli biso. Mikanda mizali koloba malamu mpe koleka oyo biso tokoki koloba na mwa miniti moke. Mpo na kozwa matomba malamu, tosengeli kotánga bazulunalo liboso, koluka lisoló oyo ekoki kosepelisa bato ya lolenge boye to lolenge oyo kuna, lobá na mokuse mpe na bosikisiki, lobá na kozanga kobanga, na komungamunga ya boninga, zalá na mɔtɔ́ mpe na esengo, lobelá bobele zulunalo moko ata soki ozali kolakisa bazulunalo mingi. Soki zulunalo endimami te, esengeli kosukisa lisoló na maloba ya boninga mpe makanisi malamu.
9 Ezali solo ete makambo ya nkita mazali kosala biso mpasi. Nzokande, soki tozali kosala makasi ya komema mwa bazulunalo bipai nyonso tozali kokende mpe soki tozali kolakisa yango na lolenge lobongi, na ntembe te milende na biso mikopambolama mpe tokozwa na yango esengo mingi. Tómibongisa mpo na kokabola bazulunalo mokolo ya pɔ́sɔ ya liboso mpe ya misato ya sanza. Soki komande ya lisangá na biso ezali moke, tóbakisa mosusu na kolandáká mokano oyo ya sika engebene komande ya mosakoli mokomoko.
10 Bankulutu basengeli kosɛnzɛla ete ebongiseli yango elandama. Na ntango bakoleka kotala masangá, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala na boye ete bábongisa bokaboli ya bazulunalo mokolo ya pɔ́sɔ ya pɔ́sɔ yango ya sipesiale. Soki mosakoli mokomoko akozwa ekateli ya kokabola bazulunalo sanza na sanza, tokokutana lisusu koleka na bato ya teritware na biso, mpe mikanda yango mikosala mosala na esika na biso.
11 Tóyoka nsɔni te mpo na kokabola bazulunalo na bisika nyonso mpe na mabaku nyonso. Bamisionere mpe bandeko oyo bakómi mibange ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali kosala mosala yango na esengo uta bambula mingi. Ndakisa na bango ezali kolendisa biso banso. Lokola ntoma Paulo, tolingi koloba ete: “Nayoki nsango malamu nsɔni te; yango ezali nguya na Nzambe kobikisa bandimi nyonso.”—Lom. 1:16.