Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/97 nk. 1-5
  • Tozali ‘kosakola liloba’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali ‘kosakola liloba’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • “Sakolá liloba”!
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • “Sakolá Liloba”
    Tóyembela Yehova
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 2/97 nk. 1-5

Tozali ‘kosakola liloba’

1 Na eleko na biso, na boyokani na lolenge oyo Biblia ezali kolobela “mikolo ya nsuka,” bato mingi bazali bobele na mwa “lolenge ya bokangami epai na Nzambe.” (2 Tim. 3:1, 5, NW) Yango euti na kozanga bolóngi ya bakonzi ya mangomba na oyo etali kopesa litambwisi ya solosolo ya elimo epai na bandimi na bango. Bakonzi ya boklisto ya nkombo mpamba bakumisaka Biblia te. Na esika ete báteya Liloba ya Nzambe, basangani na yango balingaka nde kozongela mateya ya mpambampamba ya bafilozofe mpe ya bateolojiɛ́, to kopesa makanisi na makambo ya bato to ya politiki. Bakonzi mingi ya mangomba bandimaka Biblia te. Balobaka ete ezali búku moko esilá ngala, likambo ya kokamwa bazali nde kotya liboso liteya ya evolisyó na esika ya mateya ya Biblia na oyo etali Nzambe Mozalisi monene. Bakonzi mingi ya mangomba basalelaka ata moke te nkombo bomei (nom propre) ya Nzambe mpe bamonaka ata mabe moko te ete elongolama kati na mabongoli ya sika ya Biblia.

2 Lolenge moko na bakonzi ya mangomba na eleko ya Yesu, bakonzi ya mangomba ya mikolo na biso bazali kosakola sé mpamba. (Mat. 15:8, 9) Ezali mpenza yango oyo mosakoli Amosa asakolaki. Ezali na “nzala na kwanga te, kozanga na mai mpe te; ekozala nzala na koyoka maloba na [Yehova].” (Amo. 8:11) Koleka biloko mosusu nyonso, bato bazali na mposa ya bilei ya elimo oyo bizwami kati na Liloba ya Nzambe.

3 Ndenge nini kokokisa bamposa ya elimo ya bato: Paulo alendisaki Timoté ete akangama na “Makomi na bulɛɛ, makoki kopesa . . . litomba,” mpe apesaki ye mokumba monene ya ‘kosakola liloba.’ (2 Tim. 3:14, 15; 4:2) Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosengeli kokangama na oyo Biblia ezali koteya wana tozali kosakola, komekoláká bongo Yesu, Ndakisa na biso, oyo alobaki ete: “Mateyo na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai.” (Yoa. 7:16) Mateya na biso mazwaka moboko na yango likoló na Liloba ya Nzambe, mpamba te tomonaka ete yango ezali na mayele mauti na Nzambe mpe tolingi kolakisa bato eutelo ya makambo oyo tozali koteya bango.​​​—1 Kol. 2:4-7.

4 Mpo ete bato báyeba Yehova mpe bázala na kondima epai na ye, esengeli na bango liboso koyoka solo oyo ezwami kati na Biblia. Na lolenge lobongi mpenza, Paulo akomaki ete: “Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli?” (Lom. 10:14) Na kosakoláká Liloba ya Nzambe, tozali kosalisa bazalani na biso ete bázwa kondima na nzela na boyebi ya sikisiki. Boyebi yango ezali na nguya ya kobongisa bomoi ya bato, mpe ezali yango nde ezali kosala. Mokomi Charles Dickens, mobotami na mboka Angleterre, akomaki na ntina na Biblia ete: “Ezali búku oyo eleki kitoko, oyo ezalaki mpe oyo ekozala kati na mokili, mpamba te ezali koteya mateya kitoko koleka na nzela na yango moto oyo azali kosala milende ya kozala na kolongobana mpe sembo azali komitika kotambwisama na yango.”

5 Baoyo bazali na nzala ya solo ya elimo bayebaka ete yango ezali na misisa na yango kati na Liloba ya Nzambe yango moko. Na 1913, na ntango oyo azalaki bobele moyekoli ya Biblia, bapesaki Frederick Franz mwa búku oyo ezali na motó na likambo ete Bakufi bazali wapi? Nsima ya kotánga na bosepeli makasi eyano ya Biblia na motuna wana, alobaki ete: “Oyo ezali solo!” Bamilió ya bato oyo bazali koluka solo bazali na likanisi yango. Tiká ete tókóba kosakola Liloba na lombangu mpe na molende, kozwáká esengo ya koyoka basusu koloba ete: “Oyo ezali solo!”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto