Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔ́bɛ: La vie: comment est- elle apparue? Évolution ou création? Masangá oyo mazali na babúku ilandi kati na libómbo na bango ya mikanda bakoki mpe kolakisa yango: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis to Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo. Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika, likoki ekozala ya kosɛnga ye ete asala abonemá. Desɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala mpenza makasi na kozongela baoyo nyonso bakamataki búku oyo, na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia.
◼ Nkomá ya kotinda epai na la Société: Mpo na nkomá oyo etali makambo ya lisangá, bóyeba ete likoló ya anvɛlɔpi bokokoma bobele adrɛsi ya la Société (Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634, Limete-Kinshasa, République du Zaïre). Nkomá ya lisangá oyo etindami na nkombo ya ndeko Fulani to ndeko Songolo oyo afandi na Betele, ekotalelama noki te, mpamba te lokola yango ezali na nkombo ya ndeko moko, la Société akofungola yango te ntango ekómi.
◼ Lisangá mokomoko likozwa baformilɛ́rɛ mpo na mobu ya mosala 1997. Bósalela yango na lolenge esengeli. Bokosalela yango bobele mpo na makambo oyo mabongi na yango. Soki yango esili liboso ya dati oyo la Société atindaka yango, boye ekosɛnga ete bózela kino mosusu ya sika ekoya.
◼ Basakoli oyo bazali kokana kozala babongisi-nzela basungi na Novɛ́mbɛ mpe na Desɛ́mbɛ basengeli kotondisa demande nokinoki. Boye bankulutu bakokoka kozwa bibongiseli mpo na oyo etali bazulunalo, mikanda mpe bateritware.
◼ Bankulutu bakolanda batoli oyo ezali na Mosenzeli ya 15 Apríli 1991, nkasa 21-23, na ntina na moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to oyo amilongolaki ye moko mpe oyo akomonisa mposa ya kozonga na lisangá.
◼ Mikanda ya sika oyo mizali:
Lifalansé: Louons Jéhovah par nos chants (Disque compact); Le nom de Jéhovah doit être proclamé! (Kasɛti drame); Faisons ce qui est droit aux yeux de Jéhovah (cassette drame); Organisés pour bien remplir notre ministère; Volumes reliés de La Tour de Garde 1995; Volumes reliés de Réveillez-vous! 1995; Recueil d’histoires bibliques (petit format); Jusqu’aux extrémités de la terre (cassette vidéo).