Mayebisi
◼ Lipesi ya Máí: Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau elongo na búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Yúni: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yulí: Babúku ya kala ya nkasa 192 bakisá oyo ebimisamaki liboso ya 1981 oyo ezali kati na libombo ya lisangá. Augústo: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Sɛtɛ́mbɛ: Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
◼ Bakɔ́nti ya masangá esengeli kotalelama na mwa 1 Yúni to nokinoki nsima ya dati wana.
◼ Lisangá na bino ezwaka bazulunalo ekoki? Lokola mosala ya kosakola ezali kokóma mingi, mbala mosusu bokomona malamu ete bóbakisa komande na bino.
◼ Mikanda oyo mizali:
Lifalansé: Louons Jéhovah par nos chants (oyo ya moke); Index 1991-1994.
◼ Mwa libunga ekɔtaki kati na ebimeli ya Lingala mpe ebimeli ya Tshiluba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1996, lokasa 30, na ntina na dati ya liyangani ya etúká na Mukedi. Liyangani yango likosalema na dati oyo eyebisamaki ezala na nkomá oyo etindamaki to na libakema ya Mosala na biso ya Bokonzi, elingi koloba kobanda mwa 27 kino 29 Sɛtɛ́mbɛ 1996.