Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
Bozongeli wana babúku ezali ya kokangama, na kotalela masoló masalemaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 21 Augústo 1995. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.
[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso miye mipesami. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso mizali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya parargrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]
Yanolá solo to lokuta na moko na moko na maloba malandi:
1. Kosambela Nzambe ezali likambo ya moto ye moko mpe etaleli ata moke te boyokani na biso elongo na basusu. (1 Yoane 4:20) [uw lok. 134, par. 7]
2. Toli oyo lisangani ya mikóló-bakambi bapesaki epai na Baklisto oyo bazalaki Bayuda te ete báboya losambo ya bikeko, makila mpe pite etongamaki likoló na Mibeko ya Mose. (Misala 15:28, 29) [uw lok. 149 par. 8]
3. Na ebandeli, Mibeko ya Mose mipesamaki epai na bato banso mpo ete bátosa yango. (Nz. 147:19, 20) [uw lok. 148 par. 5]
4. Mokapo 53 ya Yisaya, oyo mokomamaki soko mbula 700 liboso ya kobotama ya Yesu, mozali lokola lisoló ya nguya liyebisami na moto oyo amonaki makambo yango na miso mpenza, oyo ezali koloba na ntina na Yesu Klisto mpe lolenge bazalaki kosalela ye makambo.[si lok. 112 par. 8]
5.Maloba ya Salomo oyo mazwami na Mosakoli 3:1, 2 mazali bobɛlɛ komonisa lolenge kufa mpe bomoi ezali ntango nyonso kolandana, kasi mazali komonisa te ete bomoi ya moto moko na moko esila kokanama liboso. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 15/10 lok. 5]
6. Ezali na liziba te ya mokili oyo ekoki kokokana na batoli kitoko oyo Biblia ezali kopesa na makambo matali libota. [uw lok. 144, par. 11]
7. Mokanda ya Masese ezali kokɔta na bozindo ya mikakatano na biso mpe epesi toli ete tótya elikya na biso mobimba epai na Nzambe. [si lok. 105 par. 35]
8. Na ntembe te, baboti oyo bazali kopesa na bana na bango nzela ya kotala likambo ya lolenge nyonso oyo lizali kolakisama na televizyó bazali kotika bango ete bámitambwisa bango moko. (Mas. 29:15) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89 lok. par. 8.]
9. Ntango mikakatano mibimi kati na libala, Moklisto ya solo akotalela te mabunga ya mobalani na ye lokola ntina malamu ya koboya kokokisa mikumba na ye. [uw nk. 140 mpe 141 pars. 4, 5]
10. Kati na mokanda ya Mosakoli, wana Salomo alobi ete nyɔnsɔ [ezali] bɔbɛlɛ mpamba esangisi makambo nyonso kozanga kolongola ata eloko moko. [si lok. 108 par. 15]
Yanolá na mituna milandi:
11. Wapi motindá ya moboko ya Exode 20:7? [uw lok. 152]
12. Tangá bakonzi mibale kati na bakonzi minei oyo bayangelaki Yuda na ntango oyo Yisaya azalaki mosakoli. [si 112 par. 3]
13. Lokola yango elobelami na Yisaya 14:4, 12-14, ezaleli ya nani emonisamaki na mokonzi ya Baebele? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w85 15/3 lok. 16 par. 2 (Ebimeli ya Lifalanse).]
14. Engebene Exode 19:10, 11, Yehova azali kosenga nini epai na basambeli na ye? [uw lok. 152]
15. Nani azali mosɛnzɛli ya eleko oyo, mpe azali kosakola nini? (Yis. 21:8, 12). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87 1/3 lok. 12 par. 10 (Ebimeli ya Lifalanse).]
16. Mpo na nini Mosakoli 12:12 ezali komonisa likanisi ya mabe motindo wana na ntina etali babúku? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87 15/9 lok. 25 (Ebimeli ya Lifalanse).]
17. Na boyokani na Masese 1:2-4, eloko nini mokanda ya Masese ezali mpenza komonisa polele? [si lok. 104 par. 19]
18. Paulo alingaki koloba nini wana alendisaki Bakolinti ete ‘bazipola mitema’? (2 Kɔl. 6:13) [uw lok. 137 par. 14]
19. Na lolenge nini “bolingo ezali na nguya lokola kufa”? (Loy. 8:6, 7) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87 15/11 lok. 25 (Ebimeli ya Lifalanse).]
20. Mateya nini ya malamu mapesami na loyembo kitoko ya Salomo? [si lok. 111 par. 16]
Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:
21. Atako tozali na nse ya Mibeko ya Mose te, tozali kozwa litomba na boyebi ya sikisiki ya __________________________ oyo mizali moboko na yango mpe bilakiseli ya ________________________________ oyo bizali kati na yango. [uw lok. 153 par. 14]
22. Mobeko oyo ezali na Exode 20:4-6 ezali kopekisa __________________, mpe mokapo yango moko emonisi ete mobeko yango etongami likoló na motinda oyo ete Yehova azali kosenga ______________________________. [uw lok. 152]
23. Motinda mozwami na Deteronome 7:1-4 momonisi polele ete mosaleli ya Nzambe asengeli te kosala ekanganeli ya ______________ elongo na moto oyo azali mosaleli ya __________________________ te. [uw lok. 152]
24. Na loyembo na Salomo 2:1-3, maloba ya bokokanisi oyo masalelami mazali komonisa komikitisa mpe bopɔlɔ ya ___________________, bakisa mpe bomoto mpe makoki kitoko ya molingami na ye ______________________________. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87 15/11 lok. 24 (Ebimeli ya Lifalanse).]
25. Basaleli ya sembo ya Yehova babwaki momeseno ya kotuna epai na _____________________________ makambo matali _______________________, mpamba te kosolola motindo wana ezali mpenza lisolo elongo na ______________________. (Yis. 8:19) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89 15/3 lok. 20 par. 11 (Ebimeli ya Lifalanse).]
Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:
26. Engebene Masese 26:20, 21, soki tozalaka (mbango mpo na koyanola; molangi ya mpembe; bato na bopɔlɔ) Tokozala na (mikakatano ya biso moko; bozangi ya masolo; boyokani malamu elongo na basusu), na esika ya ‘kobakisa nkoni likolo na mɔ́tɔ’ mpe kotumola bango. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 15/10 lok. 13 par. 16.]
27. Engebene Masese 27:6, moto oyo alingi yo (akoloba soki moke te likambo ata moko mpo na kozokisa mayoki na yo; akobanga kolobela yo solo na ntina na yo moko; akopesa yo toli na ntango osengeli na yango). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 15/9 lok. 28.]
28. Elembeteli oyo emonisi ete Salomo azalaki mokomi ya Mosakoli ekoki komonana na likambo oyo ete (nkombo na ye etángami bipai nyonso kati na mokanda yango; bakomi ya mikanda mosusu ya Biblia batángi ye lokola mokomi na yango; mokanda yango ezali komonisa ye ete azali mokomi na yango kozanga ete etánga nkombo na ye). [si lok. 106 par. 4.]
29. Bato oyo bazali kokanisa ete ezaleli ya kozanga kosambisa makambo ya mabe to ya malamu mpe ezaleli ya kondima makambo ya mitindo nyonso ete ezali likanisi lingengisami, bazali mpenza (bato malamu; baoyo bandimaka makanisi ya basusu; kati na molili ya elimo). (Yis. 5:20) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 1/3 lok. 11.]
30. Loyembo ya Salomo ezali komonisa polele (mokumba ya Salomo lokola mokonzi; bozwi mingi ya Salomo; bosembo ya elenge mwasi moko ya mboka epai na elenge mobali moko mobateli na mpate). [si lok. 109 par. 2]
Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:
Mas. 22:3; Mos. 7:21, 22; Yis. 13:19, 20; Mat. 5:23, 24; Kols. 3:18-20, 23, 24
31. Atako Yehova azali ntango nyonso te kobikisa bato na ye na makama, na bitumba, to mabe mosusu, nzokande kosalela mayele mabongi oyo matongami likolo na Biblia ekoki kozala na ntina mingi. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 1/1 lok. 17 par. 23.]
32. Ezali na bantina malamu ya kozala na kondima na kokokisama ya bisakweli bipemami. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 15/5 lok. 6.]
33. Moklisto ya solo asalaka litambe ya liboso mpo na kozongisa boyokani ya kimya elongo na bandeko na ye. [uw lok. 135 par. 10]
34. Tokopesa nzela te na kobongisama ya boyokani kati na libota na kozeláká ete basusu básala litambe ya liboso, kasi na kokokisáká malamumalamu mokumba na biso mpenza; kosaláká bongo tokomonisa lisusu ete tozali kosalela losambo ya Nzambe kati na libota. [uw lok. 144 par. 10]
35. Ekobonga soki moke te ete ozela komonisa ezaleli ya kokoka epai na yo moko to kati na boyokani na yo elongo na bato mosusu oyo bazangi kokoka. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 1/3 lok. 8.]