Tólanda bosepeli oyo elamwisamaki na batrakte Nsango ya Bokonzi No. 34.
1 Bozongeli ya sika ya malamu epesaka nzela na bokoli ya moto. Kondima na ye ezali kokola mokemoke. Makanisi nini mabongi oyo mazali malamu tosengeli kobatela wana tozongeli kotala bato oyo bamonisaki bosepeli mpo na trakte Nsango ya Bokonzi No. 34?
2 Kobanda na mokolo mwa 24 Aprili 1995, pene na bamilio mitano ya basakoli ya Bokonzi oyo bakabolami soko na masangá 75 000, bazali kosangana kati na mokili mobimba na kampanye sipesiale mpo na kokabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 34. Kampanye wana ekolandama kino kosila ya libombo oyo ezali na lisangá moko na moko. Esengeli na biso kozonga kotala bato oyo topesaki trakte yango.
3 Na ntango ya bozongeli ya sika, tokoki komonisa epai na moto ete nsango oyo ezali na trakte wana ezali makambo oyo mazali kosalema. Tózala na ntango ya koyoka ye wana azali koyebisa biso makanisi na ye na ntina na oyo atángaki. Boye, tokoyeba lisolo nini tokosolola elongo na ye na mbala ezali koya. Soki moto yango amonisi bosepeli na bozongeli ya sika, tokoki kofungola boyekoli ya Biblia elongo na ye. (1 Kol. 3:6-7) Bolongi na likambo oyo esɛngi kosala lisolo ya pɛtɛɛ mpe oyo ebongisami malamu.
4 Okoki koloba nini na ntango ya bozongeli ya sika? Okoki koloba boye: “Na ntembe te, ozali koyeba trakte oyo natikelaki yo kala mingi te. Nakanisi ete ozwaki ntango ya kotánga yango mpe kokanisa likoló na nsango na yango. Ozali kokanisa te ete nsango na yango ezali makambo oyo mazali kosalema mpe ete mataleli mpenza yo? [Tiká ete moto yango ayanola.] Tótalela elongo mwa makanisi ya trakte yango oyo mataleli mikolo kitoko mizali koya oyo Nzambe abombeli bato.” Na nsima, okoki kotalela paragrafe moko to mibale oyo ebongi, mpe sɛngá moto yango ete bóbanda koyekolaka Biblia. Soki moto yango amonisi bosepeli te, okoki kolakisa ye banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká!
5 Bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekolonga na makambo oyo moto alongi te. Tosengeli kotya motema na biso mobimba kati na Bokonzi wana. Uta sikawa, tósalisa bazalani na biso ete bázwa boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe na nzela ya boyekoli ya Biblia na ndako na bango. Tóbyanga bato nyonso ete báyekola Biblia, básangana na la Société ya mokili ya sika, bámipesa epai na Yehova mpe ete bápesa litatoli mpo na nkombo na ye. Bomoi ya moko na moko na mikolo mizali koya etalelami na yango. Tópesa nzela te na boluki biloko ya mosuni to na mitungisi ya bomoi ete ezangisa biso bomoi ya solosolo oyo Nzambe alaki biso.—Luka 21:34-36; 1 Tim. 6:19.
6 Mosika te, Yehova akolongola awa na mabele makambo nyonso ya mpasi oyo mazali kotungisa bato. Bato bakozala na kimya na paladiso. Bakozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe bakosepela na ebele ya bilei ndenge na ndenge. Oyo nde eleko kitoko ekozala na ntango wana! Okolinga te kozwa bolamu ya eleko wana? Na ntembe te ozali kolinga yango.
7 Na bongo, tósala milende mpo na kosalela batoli epesameli biso. Tósepelaka kozala elongo na basakoli oyo bameseni na mosala. Esengo na biso ekobakisama soki tozali kotonga likoló na bosepeli oyo emonisamaki na ebandeli na kosaláká bozongeli ya sika ya malamu mpe na kotambwisáká boyekoli ya Biblia. Tiká ete biso banso tókumisa Yehova na ntina na mokano kitoko oyo azali na yango mpo na bato.—Nz. 150:6.