Mayebisi
◼ Lipesi ya Yuli: Babuku ya kala ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1981 mpe oyo ezali kati na libombo ya mikanda ya lisangá. Augusto: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Sɛtɛmbɛ: Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Ɔkɔtɔbɛ mpe Novɛmbɛ: Bazulunalo mpe mwa babuku.
◼ Yuli mpe Augusto ezali basanza malamu mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Bilenge oyo bazali na kelasi balendisami mpo na kosalela eleko yango mpo na kobanda mosala wana.
◼ Baoyo bazali kokana kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mwa 1 Sɛtɛmbɛ 1995 basengeli kotondisa noki lokasa ya lisɛngi mpo na mosala wana mpe kopesa yango epai na bankulutu. Nsima wana komité ya mosala ya lisangá bakondima yango mpe bakotya mabɔkɔ, ekotindama na la Société. Soki nkasa ya lisɛngi oyo endimami etindami mikolo mingi liboso, tokoki kopɛngola kosɛnga boponami nzokande moto asilaki kobanda mosala yango.