Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/95 lok. 3
  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 4/95 lok. 3

Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Bozongeli wana babúku ezali ya kokangama na kotalela masoló masalemaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi kobanda pɔ́sɔ ya 2 Yanuáli kino na pɔ́sɔ ya 17 Apríli 1995. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso miye mipesami. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso mizali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokutá na moko na moko na maloba malandi:

1. Na ntango Nzambe andimaki ezaleli ya kobongola motema oyo Davidi amonisaki mpo na lisumu oyo asalaki elongo na Bata-seba, Davidi mpe libota na ye bazwaki mpasi te mpo na etamboli wana ya mabe. [uw lok. 127, par. 5]

2. Lilako ya ntina oyo ezwami kati na Masese 11:1 ezali oyo ete tosengeli kozala na bizaleli malamu mpe sembo kati na misala na biso nyonso ya mombongo soki tolingi kondimama epai ya Yehova. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; w86 15/11 lok. 19]

3. Kondima toli ezali elembo ya bolɛmbu. [uw lok. 127 par. 4]

4. Masese 14:17 ezali kobenda likebi mingi likoló na mayoki mpamba te yango nde ezalaka liboso na kosala makambo. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w93 15/8 nk. 20-21.]

5. Baoyo nyonso bazali kobelela Yesu ete Nkolo bakobikisama. [uw lok. 105 par. 5]

6. Na mobu 33 T.B., nsima ya kosekwisama mpe kotyama na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, Yesu abandaki koyangela na ntango wana likoló na bayekoli na ye bapakolami. (Kols. 1:13) [gt mok. 132]

7. Pene na mibu 3 000 liboso ete bato ya siansi báyeba oyo ebéngami ete code génétique, Nzembo 139:​13-16 emonisaki boyebi ya likambo yango. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w92 15/5 lok. 4.]

8. Masese 8:​22-32 ezali kolobela mpenza bobele mayele. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w87 15/5 lok. 28]

9. Moklisto ya solo asengeli koyina eloko moko te. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w92 1/1 lok. 21]

10. Masese 11: 25 ezali ndakisa ya bozongeli ya makanisi to ya makanisi oyo makokani kati na elobeli ya ntɔ́ki na Liebele, mpe Masese 10:7 ezali ndakisa ya bokokanisi ya makanisi oyo makeseni. [si lok. 102 par. 7]

Yanolá na mituna milandi:

11. Mpo na nini mokanda ya Nzembo ezali te bobele makomi kitoko ya bato ya mayele? [si lok. 99 par. 23]

12. Boyebi ya makambo mazwami na mokanda ya Nzembo ezalaki na litomba nini mpo na Yesu? [si lok. 100 par. 30]

13. Nani apesaki Salomo mayele oyo azalaki na yango, mpe yango esengeli kopusa biso na kososola likambo nini na ntango tozali kotánga mokanda ya Masese? [si lok. 101 par. 1]

14. Ntango Yesu oyo asekwisamaki asololaki na ye kati na elanga, Malia Magadala akanisaki ete ezalaki nani mpe nini esalisaki ye na koyeba ye malamu? [gt mok. 128]

15. Basangani nini mibale ya Sanhédrin, oyo babangaki noki bakoyeba bango ete bazalaki elongo na Yesu, oyo bapesaki lisungi mpo na kobongisama ya nzoto na ye mpo na kokunda yango? [gt mok. 127]

16. Lolenge nini tokoki komonisa kati na misala na biso ya mokolo na mokolo ete tozali na bolingo bozangi moimi epai na bandeko na biso? [uw nk. 132-133 par. 3, 4]

17. Makambo nini masalemaki kala, oyo Nzembo 136:​10-15 ezali koyebisa, mpe likambo nini ekómelaki Falo? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w93 15/6 lok. 5.]

18. Makila ya Klisto oyo masopamaki mazali kokokisa mikano nini mibale? [uw lok. 115 par. 13]

19. Mpo na nini bantoma ya sembo ya Yesu, Yakobo ndeko ya Yesu, mpe soko bayekoli koleka 500 bandimisamaki ete Yesu asekwisamaki? [gt mok. 131]

20. Nini esalaki ete Yesu Klisto azala moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo? [gt maloba ya ebandeli]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ́ milandi:

21. Kati na lisukúlu na ye eyebani malamu oyo asalaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., Petelo azalaki kotánga mingi maloba ya mokanda ya ․․․․․․․; na libaku yango bato pene na ․․․․․․․ bazwaki batisimo mpe babakisamaki kati na lisangá ya boklisto. [si nk. 99-100 par. 25, 26]

22. Mokanda ya Nzembo esakolaki ete basengelaki kopesa Yesu ․․․․․․․ mpo na komela, mbese esengelaki kobetama mpo na ․․․․․․․ na ye, mpe ete alingaki komona lokola ete ․․․․․․․ atikaki ye. [si lok. 100 par. 30]

23. Lisangá ya Yehova ezali ya teokrasi, yango elimboli ete ․․․․․․․ Yehova azali kopesa litambwisi na nzela ya Motó ya lisangá, ․․․․․․․, na nzela ya Liloba na Ye, ․․․․․․․; mpe Yesu apesaki mokumba monene epai na ․․․․․․․. (Mat. 24:45) [uw nk. 118-119 par. 4-6]

24. Na bokeseni na ba 144 000 oyo bakamatami mpo na kokende likoló, ․․․․․․․ oyo moto moko te akoki kotánga motuya na bango, bakobika na ․․․․․․․ bobele awa na ․․․․․․․. (Emon. 7:9, 14) [uw lok. 104 par. 3, 4]

25. Mpo na kokamata ekateli oyo endimamaki na Nzambe, lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso bazalaki kotalela na likebi nyonso soki ․․․․․․․ mapemami malobi nini na ntina na likambo oyo ezalaki kotalelama mpe lisusu litatoli ya ․․․․․․․. (Mis. 15:6-29) [uw lok. 120 par. 8]

Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:

26. Ntango Yesu akakisamaki na nzeté, bapesaki ye vinyo esangisami na mola, kasi aboyaki komela yango mpamba te (apekisamaki na Mibeko; azalaki Monasili; alingaki kobatela makoki na ye nyonso). [gt mok. 125]

27. Kosukola bilamba na biso mpe kokómisa yango mpɛmbɛ elimboli ete (totiki kosala masumu; tondimi ete tozali na mposa ya bolamu ya kobɔndisama oyo ezali kozwama na nzela ya mbeka ya Yesu; topesi bomoi na biso epai na Nzambe mpe tozwi batisimo). [uw lok. 106 par. 7]

28. Pene na mbala mitano (elode, Pilato, Feliki) atángaki Yesu ete asalaki likambo ya mabe te, nde na nsima andimaki kokokisa lisɛngi makasi ya Bayuda mpe akabaki Yesu mpo ete akoka kobomama. [gt mok. 124]

29. Basaleli nyonso ya sembo ya Nzambe oyo bakufaki mpe basekwisamaki te liboso na Pantekote ya (mobu 36; 35; 33) T.B. bapakolamaki na elimo santu te mpo na kozwa bomoi ya likoló. [uw lok. 111 par. 5]

30. Satana alobaki ete bato banso bapusami na (bolingo, koyina, mposa na bango ya moimi) mpe ete bazali komibanzabanza liboso mpo na (nkombo ya Nzambe; basusu; bango moko). [uw lok. 124 par. 14]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nsé:

31. Baklisto bazali na mokumba ya kobatela baboti na bango oyo banuni. [gt mok. 126]

32. Ezali likambo ya ntina komibanzabanza mpenza mpo na bopusi oyo lolenge na biso ya komonana na miso ya bato ekoki kozala na yango likoló na basusu, yango wana tozalaka pene ya komipimela makambo oyo biso moko tolingaka. [uw lok. 130 par. 10, 11]

33. Na ntango nyonso oyo tozali na likoki ya kosala malamu mpo na basusu, ezala na elimo to na mosuni, tosengeli kosalela libaku yango mpo na kosunga bazalani na biso, mingimingi bandeko na biso kati na kondima. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w93 15/12 lok. 20]

34. Komonisa bopɔlɔ mpe kimya liboso na mikakatano ekoki kopesa lokumu epai na Yehova mpe ekoki kopusa bato ete bápesa biso limemya. [gt mok. 123]

35. Tosili kobanda kozwa matomba ya makambo malakami oyo mabéngami na lolenge lobongi ete “paladiso ya elimo.” [uw nk. 107-109 par. 9-11]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto