Nimero ya boyekoli
11/2018
MASOLO YA BOYEKOLI MPO NA: 31/12/2018–03/02/2019
© 2018 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
ELILINGI YA EZIPELI:
SUÈDE
Bandeko na engumba Stockholm bazali kosakola na butu, na eleko oyo moi elalaka noki te. Bazali koyebisa bato ndenge na ndenge nsango oyo epesaka elikya, basofɛlɛ, bakomelesa, bato oyo batɛkaka esansi, mpe basali mosusu ya butu
BASAKOLI
22 418
BAYEKOLI YA BIBLIA
10 027
BAYANGANI NA EKANISELI (2017)
34 966
Zulunalo oyo ezali ya kotɛka te. Ebimisami mpo na koteya bato Biblia na mokili mobimba, mpe mbongo mpo na kosala mosala yango eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko.
Mpo na kopesa likabo, kende na www.jw.org.
Soki liyebisi ezali te, mikapo ya Makomami euti na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika.