Makambo oyo ezali na kati
PƆSƆ YA 6-12/08/2018
3 “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te”
PƆSƆ YA 13-19/08/2018
8 Tózala na bomoko ndenge Yehova ná Yesu bazali na bomoko
Na mikolo ya Yesu makambo ya politiki, bozwi to bobola mpe bokeseni ya bikólo ekabolaki bato. Na masolo oyo mibale, tokomona ndenge Kristo ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kozala na bomoko mpe ndenge ya kolonga ezaleli ya kokanisela basusu mabe, ezaleli oyo ekabolaka bato. Tokomona mpe ndenge oyo ndakisa na bango ekotinda biso tómekola bango na mokili oyo etondi na bokabwani.
PƆSƆ YA 20-26/08/2018
16 Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo
Mpo lisosoli na biso etambwisa biso malamu, tosengeli koteya yango. Yehova apesá biso mibeko mpe mitinda mpo na kosalisa biso tóteya lisosoli na biso mpe tótalela makambo lokola ye. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki kosalela mitinda ya Biblia na ndenge oyo ebongi.
PƆSƆ YA 27/08/2018-2/09/2018
21 “Tiká pole na bino engɛnga” mpo na kopesa Yehova nkembo
Yesu asɛngaki bayekoli na ye bángɛngisa pole na bango mpo na kopesa Nzambe nkembo. Lisolo oyo epesi batoli ebongi, oyo soki tosaleli yango, ekosalisa biso tóngɛngisa pole na biso lisusu mingi koleka.
26 Lisolo ya bomoi—Nazwaki libɔndisi na mitungisi na ngai nyonso