Makambo oyo ezali na kati
3 Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Madagascar
PƆSƆ YA 26/02/2018–4/03/2018
7 “Apesaka nguya na moto oyo alɛmbi”
Okoki kosala nini soki mitungisi ya bomoi eleki yo motó? Lisolo oyo elobeli mokapo ya mobu 2018 mpe emonisi ntina oyo tosengeli kotikela Yehova nzela apesa biso makasi mpe ndenge asalaka yango.
PƆSƆ YA 5-11/03/2018
Ekaniseli ya liwa ya Kristo oyo tosalaka mbula na mbula ekosalema na mokolo ya pɔsɔ, 31/03/2018. Ndenge nini okoki komibongisa sikoyo mpo na molulu yango, matomba nini okozwa soki okei na Ekaniseli, mpe ndenge nini molulu yango oyo tosalaka mbula na mbula elendisaka bomoko ya basaleli ya Nzambe bisika nyonso? Lisolo oyo ekopesa biyano.
PƆSƆ YA 12-18/03/2018
17 Mpo na nini kopesa moto oyo azali na nyonso?
Nyonso oyo tozali na yango euti epai ya Yehova. Kasi, alingi tósalela mbongo na biso mpo na kosimba mosala oyo ebongiseli na ye ezali kosala lelo. Mpo na nini? Mpe matomba nini tokozwa soki tozali kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya? Tokozwa biyano na lisolo oyo.
PƆSƆ YA 19-25/03/2018
22 Bolingo ya ndenge nini epesaka esengo ya solosolo?
PƆSƆ YA 26/03/2018–1/04/2018
27 Moná bokeseni kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe oyo asalelaka ye te
Lisolo ya liboso emonisi ete komonisa bolingo ya Nzambe nde epesaka esengo ya solosolo, kasi te bolingo oyo ezali komonana na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1) Lisolo ya mibale emonisi ndenge bizaleli ya bato na mikolo oyo ya nsuka ekeseni mpenza na bizaleli ya basaleli ya Nzambe.