Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/12 lok. 26
  • “Yehova azali Mosantu, Mosantu, Mosantu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Yehova azali Mosantu, Mosantu, Mosantu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Yehova Nzambe azali na kati ya tempelo na ye mosantu
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • ‘Yehova azali mosantu, mosantu, mosantu’
    Pusaná penepene na Yehova
  • Okoloba: Ngai oyo! Tinda ngai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/12 lok. 26

Pusaná penepene na Nzambe

“Yehova azali Mosantu, mosantu, mosantu”

SOKI bayebisi yo opona liloba moko mpo na koloba na mokuse ndenge Yehova azali, okopona liloba nini? Na siɛklɛ ya 8 liboso ya ntango na biso, na emonaneli moko, mosakoli Yisaya amonaki bikelamu ya elimo bazali kokumisa Yehova; bazalaki kosalela liloba mosantu, liloba oyo emonisi mpenza ndenge Yehova azalaka. Makambo oyo Yisaya amonaki mpe ayokaki esengeli kotinda biso tómemya Yehova, kasi mpe tópusana lisusu penepene na ye. Ntango tozali kotalela maloba oyo ezali na Yisaya 6:1-3, salá lokola ozalaki wana.

Yisaya amonaki nini? Ye moko alobi boye: “Namonaki Yehova afandi na kiti moko ya bokonzi oyo ezalaki likoló mpe etombwaná.” (Vɛrsɛ 1) Elingi koloba te ete Yisaya amonaki mpenza Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. Moto akoki komona Nzambe te. Biblia elobi polele ete: “Moto ata moko te amoná Nzambe.” (Yoane 1:18) Makambo Yisaya amonaki ezalaki nde emonaneli.a Kasi, emonaneli yango ezalaki mpenza polele; kutu, atikalaki mpenza monɔkɔ polele, ezalaki lokola nde amoni Yehova na miso.

Na nsima, Yisaya amonaki likambo moko oyo mbala mosusu moto mosusu te amoná yango na emonaneli. Akomaki boye: “Baserafɛ batɛlɛmaki likoló na ye [Yehova]. Mokomoko azalaki na mapapu motoba. Na mibale, azipaki elongi na ye mpe na mibale, azipaki makolo na ye mpe na mibale, azalaki kopumbwapumbwa.” (Vɛrsɛ 2) Baserafɛ bazali baanzelu oyo baleki na lokumu. Na kati ya bato oyo bakomaki Biblia, kaka Yisaya nde atángi bango. Baserafɛ bazalaka ntango nyonso pene ya kosala likambo nyonso oyo Yehova atindi bango. Bazipaka bilongi mpe makolo na bango mpo na komonisa limemya makasi mpo na Ye oyo batɛlɛmaka liboso na ye mpo na kosalela ye.

Yisaya akamwaki kaka te mpo na makambo oyo amonaki, kasi mpe mpo na oyo ayokaki. Baserafɛ bazalaki koyemba na mongongo makasi. Yisaya akomaki boye: “Oyo boye abengaki oyo kuna mpe alobaki: ‘Mosantu, mosantu, mosantu ezali Yehova ya mampinga.’” (Vɛrsɛ 3) Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “mosantu” elimbolaka bopɛto. Liloba yango emonisaka mpe “likanisi ya kozanga mpenza lisumu to kozala mosika na yango.” Ekoki kozala ete Serafɛ moko to etuluku moko ya Baserafɛ ezalaki kobanda koyemba, mpe bamosusu bazalaki koyamba, mpe bazalaki koloba “mosantu” mbala misato, mpo na komonisa ete Yehova azali Mosantu na ndenge oyo eleki mpenza. (Emoniseli 4:8) Na yango, bosantu emonisi mpenza ndenge oyo Yehova azalaka. Yehova azali pɛto, azali na litɔnɔ ata moke te.

Koyeba ete Yehova azali Mosantu esengeli kotinda biso tópusana penepene na Ye. Mpo na nini? Yehova azali ata na lisumu moko te, akeseni mpenza na bakonzi ya mokili, oyo ntango mosusu bakoki kobeba to kokóma makambo makasi. Lokola azali mosantu, yango endimisi biso mpenza ete akozala ntango nyonso Tata ya malamu, Mokonzi ya sembo mpe Mosambisi oyo aponaka bilongi te. Ebongi mpenza tótya motema ete Nzambe oyo azali mosantu akosala ata mokolo te makambo oyo ekopesa biso mpasi.

Botángi ya Biblia mpo na Desɛmbɛ:

◼ Yisaya 1-23

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku Étude perspicace des Écritures elobi boye: “Ntango Nzambe amonisi moto oyo alali te emonaneli, makambo oyo azalaki komona ezalaki kotikala na bɔɔngo na ye. Na nsima, akokaki kokanisa lisusu emonaneli yango mpe kolobela to kokoma yango na maloba na ye moko.”​—Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 26]

Koyeba ete Yehova azali Mosantu esengeli kotinda biso tópusana penepene na Ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto