Mokanda euti na Norvège
Mobembo na esobe oyo etondi na nɛjɛ
TOZALI na ntɔngɔ na mokolo moko ya eleko ya malili. Tobendi mwa moke rido mpo na kotala soki libándá ezali ndenge nini. Tosepeli ntango tomoni likoló ezali polele! Tokolekisa mikolo misato mpo na kosakola na Finnmarksvidda, mokili moko ya mwa ngomba patatalu na nɔrdi ya ekólo Norvège.
Na Norvège, malili ezalaka makasi na eleko yango; yango wana, tozali kobanga mwa moke mpo na kokende na esobe na nɔrdi ya mboka yango. Kasi, tokosala mobembo yango ná Batatoli ya Yehova misato oyo bafandaka kuna. Bayebi makambo oyo tokokutana na yango mpe bayebisaki makambo oyo tokoki kosala.
Banzela ezali mingi te kuna. Mpo na kokóma na bisika oyo ezali mosika mpenza, ezalaka malamu kokende na tukutuku oyo etambolaka likoló ya nɛjɛ. Totye basakosi na biso ya bilamba, biloko ya kolya, mpe esansi na batukutuku na biso mpe na sharɛti. Mokili yango ya mwa ngomba patatalu ezali komonana ndenge ekei tii mosika mpenza. Nɛjɛ ezali kongɛnga lokola diama ntango moi ezali kobɛta likoló na yango. Mokili yango ezali komonana kitoko mpenza!
Banyama ya ndenge na ndenge ezali na mokili ya Finnmarksvidda; ezali mpe na mwa ba-urse. Kasi, tozali kokanisa libosoliboso nde kokutana na bato oyo bafandaka na mokili yango ya mosika. Tozali mpenzampenza na mposa ya kokutana na bato oyo balobaka monɔkɔ oyo babengi Sami, oyo babɔkɔlaka lolenge moko ya nyama oyo ezali lokola nzale to mpe basalaka na bandako ya bapaya oyo ezali likoló ya bangomba.
Na libándá ya ndako ya liboso, tokutani na etuluku moko ya bana-kelasi oyo bayei kosakana na banɛjɛ. Batɛlɛmi mpo na kosolola na biso mpe batuni biso soki toyei kosala nini. Na esengo nyonso, tolimbweli bango ntina ya mobembo na biso. Ntango tobandi kokabwana na bango, elenge moko alobi na biso ete: “Nzambe apambola mosala na bino.” Ntango tozongi na batukutuku na biso, tokatisi balaki oyo mai na yango ekómi mabanga mpo na malili makasi mpe esika moko monene oyo ezali kaka na banɛjɛ. Tozali komituna soki tokomona etonga ya banyama.
Ntango tozali kopusana pene ya mwa ndako moko, mobali moko apesi biso mbote na esengo. Azali na kati ya bato moke oyo bafandaka kuna sanza nyonso. Ntango amoni ete sharɛti na biso ebebi, asepeli kobongisela biso yango. Azali kosala makambo malɛmbɛ; awa bato basalaka makambo mbangumbangu te. Ndenge oyo azali kosala makambo etindi biso mpe tópema mwa moke. Nsima ya kobongisela biso sharɛti, topesi ye mersi mpe tosololi na ye mwa moke mpo na komonisa ye na Biblia ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi. Ayoki biso na likebi. Liboso tókabwana na ye, andimi kozwa buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Asɛki moke mpe alobi: “Mersi ndenge boyei kotala ngai.”
Nsima ya kotala mwa bato mosusu, butu ebandi kokɔta, mpe tobandi kokende na ndako oyo tokolala. Mbala moko, tomoni gambala moko. Nsuki motane ya nzoto na ye ezali kongɛnga mpe ezali komonana kitoko na ndenge atɛlɛmi na kati ya nɛjɛ. Gambala yango atɛlɛmi mwa moke, atali biso, mpe na nsima akei. Mbala moko, nɛjɛ ebandi kokita mpe tozali komona lisusu nzela malamu te. Tosepeli mingi ntango tokómi na ndako! Topelisi resho, mpe mokemoke molunge ebandi kobakisama na ndako. Atako tolɛmbi makasi nsima ya mokolo oyo tolekisi na banzela ya komata mpe kokita na tukutuku, tozali na esengo.
Eumeli te, ntɔngɔ etani. Tomatisi lisusu biloko na tukutuku mpe tokiti na yango ngomba, na nsima tokei pembenipembeni ya ebale, mpe tokómi na ndako mosusu ya bapaya. Kuna tokutani na elenge mobali moko, mpe tomonisi ye mwa makanisi ya kolendisa na kati ya Biblia. Alakisi biso nzela mokuse oyo tokoki koleka.
Tokómi na mokolo ya nsuka ya mobembo na biso. Ntango tokɔti na Parkɛ ya Stabbursdalen, tomoni bazamba kitoko bipai na bipai mpe na mosika, bangomba oyo ezipami na banɛjɛ oyo ezali kongɛnga ntango moi ezali kobɛta. Ebele ya banyama oyo ezalaki lokola nzale ebimaki liboso na biso! Bazali kolya matiti; bazali kopanza nɛjɛ na maseke na bango mpo na kobimisa matiti oyo ebombani na nse. Na mwa mosika, tomoni mobali moko oyo alobaka monɔkɔ ya Sami afandi na tukutuku na ye oyo etambolaka na nɛjɛ. Afandi kimya mpe azali kokɛngɛla bibwɛlɛ na ye. Mbwa na ye ezali kobatela etonga mpo banyama bápanzana te. Mbwa yango etɛlɛmi mwa moke mpe etye zolo na ngámbo oyo tozali kouta. Kasi, ezongeli nokinoki mosala na yango. Toteyi mobali yango nsango malamu. Azali na boboto mpe ayoki biso.
Ntango tozali kozonga, tozali kokanisa bato nyonso oyo tokutanaki na bango na mobembo na biso ya kilomɛtrɛ 300. Tozali na esengo ndenge topesaki mabɔkɔ ata moke mpo na komema nsango malamu epai ya bato oyo bafandaka na esobe yango oyo etondi na nɛjɛ.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
© Norway Post