“Mokɛngɛli moko malamu mpe moninga ya motema”
JOHN (JACK) BARR, oyo asalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, asilisaki bomoi na ye awa na mabele na mokolo ya pɔsɔ 4 Desɛmbɛ 2010 na ntɔngɔ. Azalaki na mbula 97. Balobi ete azalaki “mokɛngɛli moko malamu mpe moninga ya motema.”
Ndeko Jack Barr abotamaki na engumba Aberdeen, na ekólo Écosse; azalaki mwana ya nsuka na libota ya bana misato. Tata na ye ná mama na ye bazalaki bakristo oyo batyamá mafuta. Mbala mingi, Ndeko Barr azalaki koloba na esengo mpo na bomwana na ye na kati ya libota na bango; azalaki na botɔndi mingi mpo na ndakisa malamu oyo tata na ye mpe mama ye ya bolingo batikelaki ye.
Ntango akómaki na mbula pene na 13, elenge Jack akómaki komona ete kosolola na bapaya ezali mpasi mingi. Kasi, asalaki makasi alonga mokakatano yango, mpe na mokolo ya lomingo moko ya 1927 nsima ya midi, ntango azalaki na mbula 14, ayebisaki tata na ye ete sikoyo akoki mpo na kokende elongo na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako. Yango nde ebandeli na ye na mosala ya Yehova. Banda mokolo wana tii na liwa na ye, Ndeko Barr azalaki ntango nyonso mosakoli ya molende ya nsango malamu.
Aksida moko ya nsɔmɔ oyo elingaki koboma mama na ye etindaki elenge Jack akanisa na bozindo ntina ya bomoi, mpe na 1929 amipesaki na Yehova na libondeli, mpe ayaki komonisa yango na batisimo ntango kaka libaku ya liboso emonanaki, na 1934. Na nsima na 1939, akómaki kosala na Betele ya Londres, na Angleterre. Wana nde ebandeli ya mosala na ye ya ntango nyonso oyo eumelaki mbula 71.
Na mokolo ya 29 Ɔkɔtɔbɛ 1960, Ndeko Barr asalaki boyokani oyo ye moko abengaki “boyokani moko ya motuya mingi,” ntango abalaki Mildred Willett, ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela ya molende banda kala mpe azalaki misionɛrɛ. Ndeko Barr ná mwasi na ye bayebanaki lokola babalani ya ndakisa malamu, oyo bamipesá na mosala ya Nzambe, mpe batikalaki ndenge wana tii ntango Mildred asilisaki bomoi na ye awa na mabele na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 2004. Ndeko Barr ná mwasi na ye bazalaki kotánga Biblia elongo mokolo nyonso na libala na bango.
Mpo na baoyo bayebaki Ndeko Jack Barr, nkombo na ye ekobanda kotinda bango bákanisa mobali moko oyo azalaki kopesa batoli ya mayele—oyo ezalaki ntango nyonso na bokatikati, na boboto, mpe oyo esimbami na Makomami. Azalaki mosali ya mpiko, mokɛngɛli ya boboto mpe oyo alingaka basusu, mpe azalaki moninga ya sembo. Bakomantɛrɛ na ye, badiskur na ye mpe mabondeli na ye ezalaki komonisa ndenge azalaki kolinga mpenza solo mpe ndenge boyokani na ye na Yehova ezalaki makasi mpenza.
Atako tozangi Ndeko Barr, tosepeli elongo na ye mpo azwi likabo ya kozanga kokufa—lokumu oyo azalaki kozela na mposa makasi mpe oyo azalaki kolobela mingi. Yango kaka nde azalaki kolinga.—1 Ko. 15:53, 54.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya bomoi ya Ndeko John Barr ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1987, nkasa 26 tii 31 (na Lifalanse).