Yesu “azali kolongola lisumu ya mokili”
Yoane Mobatisi alobaki ete Yesu “azali kolongola lisumu ya mokili!” (Yoane 1:29) Yango ebendaki likebi na mokumba ya Yesu ya kobikisa bato ya botosi.
Kasi, mpo na nini Yesu asengelaki kokufa mpo na kobikisa basumuki?
Akokisaki nini ndenge andimaki kopesa bomoi na ye?
Banani bazwi litomba na liwa na ye?
Ekoki kozala na ndimbola nini mpo na yo?
Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova bayanganaka mpo na kokanisa liwa ya Yesu, na mokolo oyo akufaki. Na mbula oyo, molulu yango ekozala mokolo ya lomingo, 17 Aprili nsima ya kolala ya moi.
Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kobenga yo oya koyangana ná bango mpo na kotalela ndimbola ya liwa ya Yesu. Bakopesa biyano ya Biblia na mituna oyo ezali awa na likoló.
Okoki koyangana na esika oyo ezali mosika te na ndako na yo. Tosɛngi yo otuna Batatoli ya Yehova ya esika oyo ofandi báyebisa yo ngonga mpe esika molulu yango ekosalema.