“Nsuka” ezali nini?
“ . . . bongo nsuka ekoya.”—MATAI 24:14.
NA MIKOLO oyo euti koleka, bato balobi makambo mingi mpo na nsuka ya mokili. Babuku, bafilme mpe bazulunalo, elobelaka nsuka ya mokili na ndenge ekeseni, na ndakisa na ndenge ya masɛki to na ndenge ya mayele ya bato ya siansi. Balobaka mpe ete etumba ya nikleere, maladi mabe, kobongwana ya klima, to bato oyo bakouta na etando mosusu nde bakobebisa mokili.
Mangomba ezali mpe na makanisi ndenge na ndenge; mingi eteyaka ete “nsuka” ekosukisa bomoi nyonso awa na mabele. Moto moko ya teoloji akomaki maloba oyo ya nsɔmɔ mpo na Matai 24:14: “Vɛrsɛ oyo ezali moko ya bavɛrsɛ ya ntina mingi na kati ya Liloba ya Nzambe mobimba . . . Likama moko monene ekoki koboma ebele ya bato ezali liboso ya bato ya eleko na biso, mpe bato mingi te nde bazali kondima likambo yango.”
Mbala mingi, makanisi ya ndenge wana ezali kotinda bato bábosana likambo oyo ya ntina: Yehova Nzambe ‘atɛlɛmisaki mabele ngwi’; “azalisaki yango mpamba te, [kasi] asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Na yango, ntango Yesu alobelaki “nsuka,” alingaki koloba te ete mabele ekobomama; alingaki mpe te koloba ete bato nyonso bakobomama. Alingaki koloba ete bato mabe—oyo baboyaka na nko nyonso kolanda litambwisi ya Yehova ya bolingo—bakobomama.
Tózwa ndakisa. Kanisá ete ozali na ndako moko ya kitoko mpe otikeli bato báfanda ofele. Bato mosusu bazali kofanda na kimya ná basusu, bazali koyokana mpe bazali kobatela ndako yango malamu. Kasi, bamosusu bazali kosala eloko te, kaka kobimisa mikakatano ebele, babundaka, mpe bazali konyokola bato ya malamu. Babebisi ndako na yo mpe na motó makasi nyonso baboyi koyokela yo na milende oyo osali mpo na kopekisa bango.
Okosala nini mpo na kobongisa likambo yango? Okobebisa ndako na yo? Ezali bongo te. Ntango mosusu okobengana bato wana ya mabe mpe okobongisa bisika oyo babebisaki.
Yehova akosala kaka bongo. Na lisalisi ya elimo santu na ye, atindaki mokomi ya nzembo akoma boye: “Basali-mabe bakobomama, Kasi bato oyo balikyaka na Yehova nde bakozwa mabele. Mpe etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; Mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”—Nzembo 37:9-11.
Ntoma Petro alobelaki mpe likambo yango. Na litambwisi ya elimo santu, akomaki ete: “Likoló ezalaki banda kala ná mabele ya makasi oyo ebimaki na mai mpe na katikati ya mai na liloba ya Nzambe; mpe na nzela na yango mokili ya ntango wana ebebisamaki ntango ezindaki na mai.” (2 Petro 3:5, 6) Awa, ntoma Petro alobelaki Mpela ya ntango ya Noa. Bato ya mabe ya ntango wana babomamaki, kasi mabele etikalaki. Mpela wana ya mokili mobimba ezali “ndakisa ya makambo oyo ekoya.”—2 Petro 2:6.
Na nsima, Petro abakisaki ete: “Likoló ná mabele oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ.” Soki tosuki kaka wana, tokozala na likanisi ya mabe. Kasi, yoká ndenge vɛrsɛ yango ekobi: “Mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.” Kobebisama ezali te mpo na mabele kasi mpo na bato oyo batyolaka Nzambe. Nini ekosalema na nsima? Petro akomaki ete: “Tozali kozela likoló ya sika [Bokonzi ya Masiya] mpe mabele ya sika [bato ya sembo] ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.”—2 Petro 3:7, 13.
Bisakweli ya Biblia emonisi mpe ete ntango ya “nsuka” ekómi pene. Tángá Matai 24:3-14 mpe 2 Timote 3:1-5 mpo na komona makambo oyo emonisi bosolo ya likambo yango.a
Ezali kokamwisa yo komona ete makanisi ezali ndenge na ndenge na likambo etali Matai 24:14, vɛrsɛ oyo ata mwana moke akoki koyeba? Ezali na makambo mingi oyo esali ete bato bázala na makanisi ekeseni ndenge wana. Satana akangi bato miso mpo báyeba te solo ya motuya oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (2 Bakorinti 4:4) Lisusu, Nzambe abombeli bato ya lolendo mikano na ye mpe amonisi yango epai ya bato ya komikitisa. Mpo na likambo yango, Yesu alobaki ete: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya ná bato ya mayele makambo oyo kasi omonisi yango bana mike.” (Matai 11:25) Oyo nde libaku malamu kozala na kati ya bato ya komikitisa oyo bayebi soki Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza nini mpe baoyo bazali kozela na motema esengo mapamboli oyo bokonzi yango ekomemela bato nyonso oyo bazali kosakola mpo na yango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 9]
Bokonzi ya Nzambe ekotya “nsuka” na mabe nyonso awa na mabele