Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/11 lok. 8
  • Kokisáká mposa na yo ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokisáká mposa na yo ya elimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Tomekola Yesu, Ndakisa na moto oyo amipesaki na makambo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bóbakisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ezaleli na bino ya koyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Baklisto babatisami, bolanda komipesa na makambo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe likoló na koyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/11 lok. 8

Sekele 5

Kokisáká mposa na yo ya elimo

BIBLIA ETEYAKA NINI? “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

MOKAKATANO EZALI WAPI? Mangomba ezali ebele oyo mingi na yango eteyaka mateya ndenge na ndenge mpo na kokokisa bamposa ya elimo. Ndenge nini okoki koyeba lingomba oyo eteyaka solo mpe oyo esepelisaka mpenza Nzambe? Bato mosusu ya mayele balobaka ete kondimela Nzambe mpe kokangama na ye ezali bozoba, ezali kutu likama. Zulunalo moko (Maclean) elobeli na mokuse makanisi ya moto monene moko oyo andimelaka Nzambe te; elobi boye: “Liteya ya bokristo oyo elobaka ete ezali na nguya moko oyo eleki siansi mpe mayele na biso . . . esilisaka bomoi kaka moko oyo tozali na yango valɛrɛ mpe etindaka bato básala makambo ya mabe.”

OKOKI KOSALA NINI? Talelá makambo oyo emonisi ete Nzambe azalaka. (Baroma 1:20; Baebre 3:4) Kotika nzela te na moto moko alɛmbisa yo koluka biyano na mituna ya ntina lokola oyo: Mpo na nini tozali awa na mabele? Ezali na bomoi mosusu nsima ya liwa? Mpo na nini bampasi ezali mingi? Nzambe asɛngaka nini epai na ngai? Kozwa biyano ebongi na mituna wana ezali na ntina mingi mpo ozwa esengo ya seko.

Nzokande, kondima bindimelá te makambo oyo basusu balobaka na yo. Liloba ya Nzambe elendisi yo osalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ mpo omindimisa yo moko oyo endimami na ye. (Baroma 12:1, 2) Okopambolama mpo na milende na yo. Soki obongisi ntango mpo na koyekola Biblia mpe kosalela batoli na yango, okokima mikakatano mosusu, okomitungisa koleka ndelo te, mpe okokóma kosepela lisusu mingi na bomoi. Yango ezali mpenza solo. Bamilio ya bato ya mikili ndenge na ndenge bazwi matomba na ndenge bayekoli solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye. Na ndakisa, tángá lisolo oyo ezali na nkasa 18 tii 21 na zulunalo oyo.

Ntango ozali kosalela batoli ya bwanya oyo ezali na Biblia, okokangama lisusu mingi na Nzambe. Mpo na nini te kondima libyangi ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova? Soki ondimi, na ntembe te okondima maloba oyo ntoma Paulo akomaki ete: “Ezaleli yango ya kokangama na Nzambe ná ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango ezali nzela ya kozwa litomba monene.”​—1 Timote 6:6.

[Elilingi na lokasa 8]

Omindimisa yo moko oyo endimami na Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto