Lisukulu ya sipesiale
Ntango nini tokozala na kimya ya solosolo mpe na likambo ya kobanga te?
Na boumeli ya bankóto ya bambula, bato bazali koluka kimya mpe libateli. Kasi, bazali kozwa te kimya ya solosolo. Mpo na nini? Biblia epesi makambo mibale ya ntina oyo ezali kosala ete bato bázwa te kimya yango. Epesi mpe elikya oyo ya kokitisa motema: Nzambe alaki bato ya mokili mobimba kimya ya solosolo mpe libateli ya seko.
Ndenge nini mpe ntango nini kimya mpe likambo ya kobanga te ekosalema? Osengeli kosala nini mpo ozwa mapamboli yango? Mituna wana ekozwa biyano na lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Ntango nini tokozala na kimya ya solosolo mpe na likambo ya kobanga te?” Lisukulu yango ekosalema na mokili mobimba na mikili koleka 230. Na bisika mingi, lisukulu yango ekosalema na mokolo ya Lomingo, 18 Aprili 2010 na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, oyo ezali na esika oyo ofandi. Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi bakosepela koyebisa yo ngonga mpe adrɛsi. Tobengi yo oya.