Mokanda euti na États-Unis
Mobembo moko na ntango ya kala
KANISÁ naino esengo oyo okozala na yango soki osali mobembo mpo na kokende komona ndenge bankɔkɔ na yo bazalaki. Tokoki koloba ete tosalaki mobembo ya ndenge wana. Tolongwaki na Suisse mpe tokendaki na États-Unis. Bato mingi bakanisaka ete na États-Unis makambo nyonso ezalaka kaka kitoko, kasi mobembo oyo tosalaki esalaki ete tózongisa makanisi nsima mbula nkama mibale. Tiká tóyebisa bino ndenge mobembo yango elekaki.
Lokola tolobaka monɔkɔ ya Suisse oyo esanganá ná Allemand, basɛngaki biso tólekisa sanza misato na etúká ya Indiana. Mokano na biso ezalaki ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabota ya Amish, baoyo balobaka monɔkɔ ya bankɔkɔ na bango. Bankama ya mabota yango bafandaka na Indiana.
Ba-Amish bazali bakitani ya etuluku ya Ba-Anabaptiste ya ekeke ya zomi na nsambo. Nkombo na bango eutá na Jacob Amman, mokambi na bango oyo azalaki kofanda na Suisse. Na boyekoli na bango ya Biblia oyo bazalaki kosala ntango wana, bato yango oyo babangaka Nzambe bandimaki ete kobatisa bana mike mpe kosala mosala ya soda ezali mabe. Lokola bazalaki na ekateli wana, guvɛrnema ezalaki konyokola bango. Kutu, bamosusu bakufaki mpo bakangamaki na mateya ya lingomba na bango. Minyoko ezalaki kokoba, yango wana mingi na bango bakimaki na bingumba mosusu ya Suisse mpe ya France. Na katikati ya ekeke ya zomi na libwa, bankóto ya bato yango bakimaki na États-Unis. Bato yango bamemaki mimeseno mpe monɔkɔ oyo bazalaki koloba, elingi koloba monɔkɔ ya Suisse oyo esanganá na Allemand.
Ntango tokendaki kotala bato wana ya boboto, bakamwaki komona biso epai na bango, mpe tozali koloba monɔkɔ na bango! Kanisá naino ndenge likambo yango elekaki.
Batunaki biso boye na monɔkɔ na bango ya Suisse oyo esanganá na Allemand: “Ndenge nini bino bozali koloba monɔkɔ na biso?”
Toyanolaki boye: “Mpo touti na Suisse.”
Bakamwaki mpe balobaki boye: “Kasi bino bozali Ba-Amish te!”
Bato mingi babengaki biso epai na bango, mpe yango esalisaki biso tómona mwa moke ndenge bomoi ezalaká na ntango ya bankɔkɔ na biso. Na esika ya mwinda ya ampule, bazalaki nde na mwinda ya petrole; na esika ya mituka, bazalaki nde na mpunda mpe sharɛti; na esika ya mai ya pɔmpi bazalaki nde na mabulu ya mai mpe pakapaka oyo ebalukaka na mopɛpɛ mpo na kopesa mai; na esika ya radio bazalaki nde koyemba.
Likambo oyo ekamwisaki biso mingi ezalaki ezaleli na bango ya komikitisa mpe lolenge ya bomoi na bango oyo ezangi mindɔndɔ. Bato mingi ya Amish bamityelá mpenza mokano ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo, bazwaka yango na motuya mingi mpe basepelaka kolobela masolo ya Biblia. Yango epesaki biso libaku ya kosolola na bango masolo oyo etali mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabele.
Mosika te, nsango epanzanaki ete bapaya oyo bauti na Suisse bazali wana. Bato mingi bazalaki kosɛnga biso tókende kotala bandeko na bango mpe tosepelaki kosala yango. Ntango babengaki biso tókende kotala eteyelo moko ya Amish, yango ebakisaki esengo na biso mpe tozelaki likambo yango na motema likoló. Likambo nini ezalaki kozela biso kuna?
Tobɛtaki na porte ya eteyelo yango. Molakisi afungolaki porte mpe mbala moko asɛngaki biso tókɔta na kati ya kelasi, mpe kuna tokutaki bana-kelasi 38 oyo bazalaki kotalatala biso mpo tozali bapaya. Basangisaki kelasi mwambe esika moko, bana-kelasi yango bazalaki na mbula kobanda 7 tii 15. Bana basi balataki elamba ya bule mpe bikoti ya mpɛmbɛ; bana mibali balataki pantalo ya moindo mpe simisi ya bule makasi. Plafɔ ya kelasi yango ezalaki likoló mpenza. Bifelo misato ezalaki na langi ya bule, mpe oyo ya liboso ezalaki na tablo. Na pembeni ezalaki na globe terrestre mpe bakarte mosusu ya mikili ndenge na ndenge oyo balingálingá. Na litumu ya kelasi yango ezalaki na mbambola moko ya monene.
Ntango tozalaki kokende mpo na kofanda na liboso mpenza ya kelasi, bana-kelasi bazalaki kotala biso na kokamwa. Bana na bana batɛlɛmaki liboso ya mesa ya molakisi na bango mpe balakisi bazalaki kotuna bango devuare oyo bapesaki bango na mokolo eleki. Tokamwaki ntango molakisi atunaki bana-kelasi liteya moko oyo etali bangomba ya Alpes ya Suisse. Babuku oyo azalaki kosalela ezali ya kala mpenza, mpe molakisi atunaki biso soki Suisse ezali kaka ndenge babuku yango elobi. Atunaki soki bangɔmbɛ ekendaka kaka na bazamba na eleko ya molunge to soki nɛjɛ ezalaka kaka na bangomba? Ntango tolakisaki bafɔtɔ ya langilangi ya banɛjɛ oyo ezipi bansɔngɛ ya bangomba mpo na kobakisa makanisi oyo ezalaki na buku na ye, asepelaki.
Mwasi ya molakisi yango oyo azalaki mpe kotángisa soki mobali na ye azali te, azalaki kotuna biso mbala na mbala ete: “Bokoki koyemba?” Te, tokokoka te. Kasi, lokola toyebaki ete Ba-Amish bayebi koyemba malamu mpe bayebi banɔti ya miziki malamu, tosɛngaki bango báyembela biso nzembo moko. Bayembaki, mpe toyokaki ndenge mingongo ya bato 40 eyokanaki kitoko. Na nsima, molakisi asɛngaki bana-kelasi bákende kopema.
Mwasi ya molakisi yango asɛngaki biso tóyembela bango nzembo. Lokola toyebaki mwa banzembo mingi ya bonkɔkɔ ya monɔkɔ ya Suisse oyo esanganá na Allemand, tondimaki. Mosika te, bana-kelasi bayokaki ndenge tozali koyemba mpe bazongaki na kati ya kelasi, mpe bazingaki biso. Totɛlɛmaki liboso ya kelasi mpe tosalaki nyonso mpo na koyembela bango.
Na nsima, babengaki biso tólya na midi elongo na libota moko ya Amish ya bato 12. Na mesa moko ya mabaya biloko kitoko ya kolya etondaki—mbala baniká, Jambɔ, masango, mampa, fromajɛ, ndunda, bagato, mpe biloko mosusu. Liboso ya kolya, moto na moto abondelaki na nse ya motema. Ntango bazalaki kolekisa biloko, tozalaki kosolola masolo ya Suisse, ekólo ya bankɔkɔ na bango, mpe bango bayebisaki biso ndenge bomoi ezalaka na ferme. Bana bazalaki koyebisana makambo na litoi mpe kosɛka ntango tozali kolya. Ntango moto nyonso asilisi kolya libondeli ya mibale esalemaki, yango emonisaki ete bana bakokaki kolongwa na mesa—kasi mpo na kokende kosakana te. Mokomoko na bango azalaki na mosala ya kolongola basaani na mesa mpe kosukola yango elingi koloba, kotɔka liboso mai mpe na nsima kotokisa yango.
Ntango bana bazalaki kosukola basaani, baboti na bango basɛngaki biso tókɔta na esika bayambaka bapaya. Divan ezalaki te, kasi tofandaki na bakiti ya mabaya oyo ebalukaka. Babimisaki Biblia moko ya kala ya Allemand na armware, mpe ndenge kaka ezalaka epai ya bato ya Amish, tobandaki mbala moko masolo kitoko mpenza ya Biblia. Mokano ya Yehova Nzambe mpo na mabele mpe bato ezali nini? Yesu alingaki mpenza koloba nini ntango alobaki ete bato ya komikitisa bakozwa mabele? Nzambe asepelaka mpenza konyokola bato mabe libela na libela na lifelo ya mɔtɔ? Banani bazali kokokisa etinda ya Yesu ya kosakola nsango malamu na mabele mobimba? Kosalisa bato ya mitema sembo bázwa biyano na Biblia na bango moko na mituna nyonso wana mpe na mituna mosusu, epesaki biso esengo mpenza.
Tii sikoyo, tobosanaka te mobembo wana oyo tosalaki, oyo esalisaki biso tómona makambo mingi ya kitoko. Tozali kolikya mpe kobondela ete mobembo yango oyo tosalaki mpe masolo oyo tosololaki na monɔkɔ ya Suisse oyo esanganá na Allemand, esuka kaka te na ndenge bato yango bayambaki biso, kasi esimba mpe mitema na bango mpo bázwa boyebi ya sikisiki ya solo oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe.