Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/8 nk. 16-17
  • Amonaki biloko ya motuya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Amonaki biloko ya motuya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Nayekolaki kotyela Nzambe motema
    Lamuká!—2006
  • Opesaka motuya na bonsomi ya losambo?
    Lamuká!—1996
  • Nasalelaki Nzambe atako nakutanaki na mikakatano
    Lamuká!—2005
  • Tóluka biloko ya motuya oyo “ebombami malamumalamu na kati na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/8 nk. 16-17

Amonaki biloko ya motuya

OSILÁ komona biloko ya motuya oyo ebombamaki na esika oyo moto akoki kokanisa te? Likambo yango ekómelaki Ivo Laud, Motatoli ya Yehova moko na ekólo Estonie, na mokolo ya 27 Marsi 2005. Azalaki kosalisa Alma Vardja, mobange moko oyo azali mpe Motatoli, na kobuka mwa ndako moko ya kala ya kobomba biloko. Ntango bakweisaki efelo ya libándá, bamonaki libaya moko ezipi ngámbo moko ya likonzí. Ntango balongolaki libaya yango, bamonaki lidusu moko ya santimɛtrɛ 10 na bonene, mɛtrɛ moko na ndambo na bolai, mpe santimɛtrɛ 10 na bozindo, oyo ezipamaki na libaya mosusu ya ndenge wana na kati. (1) Esika babombaki biloko ya motuya! Ezalaki biloko nini? Nani abombaki yango?

Na kati na yango, babimisaki maboke ebele oyo bakangá malamu na bapapye mineneminene. (2) Na kati ya maboke yango, ezalaki na mikanda ya Batatoli ya Yehova, mingimingi masolo ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mosusu ezalaki ya 1947. (3) Bakomaki yango malamu na mabɔkɔ, na monɔkɔ ya Estonien. Maboke mosusu ezalaki na mwa makambo oyo esalisaki mpo na koyeba moto oyo abombaki yango. Ezalaki masolo ya mituna oyo bapolisi bazalaki kotuna Villem Vardja, mobali ya Alma. Bamonaki mpe makambo oyo eyebisaki bambula oyo alekisaki na bolɔkɔ. Mpo na nini akɔtaki bolɔkɔ?

Ndeko Villem Vardja azalaki na mokumba ya kokamba lisangá ya Batatoli na Tartu mpe na nsima, lisangá ya Otepää, na ekólo Estonie, moko ya barepiblike ya Union soviétique. Emonani ete ayekolaki solo ya Biblia mwa moke liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mwa bambula na nsima, na mokolo ya 24 Desɛmbɛ 1948, Bakoministe bakangaki ndeko Vardja mpo na makambo ya losambo na ye. Bapolisi batunaki ye mituna mpe banyokolaki ye mpo balingaki apesa bankombo ya Batatoli mosusu. Nsima ya koboya kopesa ye ndingisa ya kosamba na tribinale, bakatelaki ye mbula zomi ya bolɔkɔ na bakaa ya Russie.

Villem Vardja atikalaki sembo epai ya Yehova tii na liwa na ye mokolo ya 6 Marsi 1990. Mwasi na ye ayebaki ata moke te ete abombaki mikanda na esika wana. Na ntembe te, mobali ayebisaki ye te mpo alingaki kobatela ye soki batuni ye mituna. Mpo na esengelaki abomba mikanda yango? Abombaki yango mpo basoda ya KGB bazalaki mbala mingi kokende na mbalakaka na ndako ya Batatoli ya Yehova mpo na koluka mikanda ya makambo ya Nzambe. Mbala mosusu, ndeko Vardja abombaki mikanda yango mpo ata soki bapolisi ya KGB babɔtɔli mikanda mosusu nyonso, bandeko baklisto bázanga bilei ya elimo te. Liboso, na eleko ya molunge ya 1990, bamonaki bisika mosusu oyo mikanda ebombamaki. Esika moko ezalaki na Tartu, na sudi ya Estonie. Kaka Villem Vardja nde abombaki yango.

Mpo na nini tobengi mikanda yango biloko ya motuya? Mpamba te mikanda yango oyo ekomamaki na likebi na mabɔkɔ mpe ebombamaki malamu ezali komonisa polele ndenge Batatoli bazalaki kosepela na bilei ya elimo oyo ezalaki na ntango wana. (Mat. 24:45) Yo mpe osepelaka na bilei ya elimo oyo bozwaka na mboka na bino? Kati na yango, ezali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Estonien mpe na minɔkɔ mosusu koleka 170.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto