Ndenge oyo okoki koyeba Biblia
2. Tángáká na makanisi ya malamu
Esilá kokóma ete moninga moko ayebisa yo makambo ya mabe mpo na moto oyo okutaná na ye naino te? Ntango okutanaki na moto yango, makambo oyo moninga na yo ayebisaki yo mpo na ye epekisaki yo omona makoki ya moto yango mpe bizaleli na ye ya malamu? Ekoki mpe kosalema bongo na oyo etali Biblia.
NTOMA Paulo alobaki likambo oyo ekoki kosalema soki tozali kotánga Biblia na makanisi ya malamu te. Mpo na Bayuda mosusu ya ntango na ye, Paulo akomaki boye: “Nazali kotatola na ntina etali bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi engebene boyebi ya solosolo te.”—Baloma 10:2.
Bayuda yango mosusu ya ekeke ya liboso baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya, atako Makomami ya Liebele emonisaki yango polele. Makambo mpe bisakweli nyonso oyo Makomami ya Liebele elobaki mpo na Masiya ekokanaki epai ya Yesu, moto ya Nazalete. Kasi, makanisi mabe oyo bato mingi ya ekólo na ye bazalaki na yango epekisaki bango básosola Liloba ya Nzambe.
Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? Ezali na ntina tótángaka Biblia na makanisi ya malamu. Kozala na makanisi mabe mpo na Biblia ekoki kozala lokola elamba oyo ezipi miso ya moto oyo azali kotánga Biblia mpe kopekisa ye asosola solo na yango.
Na ndakisa, profesɛrɛ moko ya makambo ya mangomba na etúká ya Caroline du Nord, na États-Unis, alobaki ete Biblia “ezali buku oyo ezali mpenza na makanisi ya bato, mingi na makanisi yango ekeseni mpe ekoki te kotambwisa biso na ndenge esengeli.” Soki moto azali kotánga Biblia na likanisi ete “ezali buku oyo ezali mpenza na makanisi ya bato,” akobanda koboya malako to mitinda oyo amoni ete esepelisi ye te, boye te?
Nzokande, Biblia elendisi biso tóyekolaka yango na molende. Makomami elobi mpo na bato ya Beloya ete: “Bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.” (Misala 17:11) Mbala mosusu ekosɛnga ete yo mpe osala lokola bato yango mpe olongola makanisi nyonso ya mabe oyo ekoki kopekisa yo okanga ntina ya Biblia. Tángáká Liloba ya Nzambe na makanisi ya malamu mpe na mposa makasi ya koyeba nsango kitoko oyo euti na Mobandisi na yango.