Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/3 lok. 32
  • Mokolo ya ntina mingi mpo na bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokolo ya ntina mingi mpo na bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/3 lok. 32

Mokolo ya ntina mingi mpo na bato

Ezali mokolo oyo Yesu Klisto akufaki. Mpo na nini liwa na ye ezalaki na ntina mingi? Mpo na makambo mingi.

Bosembo ya Yesu tii na liwa emonisaki ete moto akoki kotikala sembo epai ya Nzambe.

Liwa ya Klisto epesaki mpe bato mosusu libaku ya koyangela elongo na ye na likoló. Lisusu, epesi ebele ya bato libaku ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.

Na mpokwa liboso akufa, Yesu asalelaki mampa ezangá levire mpe vinyo ya motane lokola elilingi ya mbeka oyo apesaki na bolingo nyonso. Mpe ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Yo mpe okokanisa molulu yango ya ntina mingi?

Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kobenga yo okanisa liwa ya Yesu elongo na bango. Na mbula oyo, ekosalema na mokolo ya minei, 9 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Okoki kokende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali mosika te na esika ofandaka. Tosɛngi yo okutana na Batatoli ya Yehova ya kartye na bino mpo na koyeba ngonga mpe esika oyo molulu yango ekosalema.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto